Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nayebaka kokanga motema liboso ya mikakatano?

Nayebaka kokanga motema liboso ya mikakatano?

 Omonaka ete oyebi kokanga motema liboso ya mikakatano? Likambo ya boye esilá kokómela yo . . .

  •   liwa ya moto oyo olingaka?

  •   maladi oyo eumelaki?

  •   likama oyo ebebisaki biloko?

 Bato ya mayele bamonisi ete ezali kaka makambo ya minene te nde esɛngaka kokangela motema. Ata mitungisi ya mokolo na mokolo ekoki kopesa yo maladi. Yango wana ezali na ntina koyekola ezaleli ya kokanga motema, ata soki mikakatano na yo ezali kaka moke to monene ndenge nini.

 Kokanga motema liboso ya mikakatano ezali nini?

 Kokanga motema liboso ya mikakatano ezali likoki ya kondima bambongwana mpe makambo ya mpasi oyo esalemi mpe kokoba kokende liboso. Bato oyo bakokaka makambo mpe bakutanaka mikakatano. Kasi, yango ezindisaka bango te, mpe ekómisaka bango makasi koleka.

Ndenge kaka banzete mosusu egumbamaka na ntango ya mopɛpɛ makasi kasi etɛlɛmaka lisusu soki mopɛpɛ eleki, okoki kozonga makasi nsima ya kokutana na likambo ya mpasi

 Mpo na nini osengeli koyeba kokanga motema?

  •   Mpo makambo ya mpasi ekozanga te. Biblia elobi: “Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka ntango nyonso na momekano ya kopota mbangu, . . . ezali te bato oyo bazali na boyebi nde balongaka ntango nyonso, mpo ntango ná makambo oyo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Liteya eza nini? Ata bato malamu bakutanaka na makambo ya mpasi​—mbala mingi kutu ezalaka mpo na foti na bango te.

  •   Mpo ezaleli ya kokanga motema ekobatela yo. Mopesi-toli ya eteyelo moko alobi boye: “Nakamwaka ebele ya bana-kelasi oyo bayaka kolela na biro na ngai mpo bazwi bapwɛ moke to moto alobaki na bango mabe na basite Internet ya kosolola na bato.” Alobi ete ata na makambo wana oyo emonanaka mikemike, soki oyebi kokanga motema te okoki kozwa “maladi ndenge na ndenge ya makanisi mpe ya motó.” a

  •   Ezaleli ya kokanga motema ekosalisa yo sikoyo mpe ntango okokóma mokóló. Mpo na makambo oyo elɛmbisaka bato nzoto, Dokrɛrɛ Richard Lerner akomaki boye: “Mpo na kozala mokóló ya esengo mpe ya mpiko, esɛngaka mpe kolonga makambo ya ndenge wana, komityela mikano ya sika, to komeka kolanda nzela mosusu mpo na kokokisa mokano oyo omityelaki.” b

 Ndenge nini okoki koyekola ezaleli ya kokanga motema?

  •   Talelá mokakatano na yo na ndenge oyo ebongi. Yekolá kokesenisa mokakatano ya monene mpe mokakatano ya moke. Biblia elobi: “Zoba amonisaka nkanda na ye nokinoki, kasi moto ya ekɛngɛ akangaka motema ntango bapesi ye nkanda.” (Masese 12:16) Esengeli te makambo nyonso elya yo nzoto.

     “Na eteyelo, bana bamilelaka mingi mpenza mpo na makambo ya mikemike. Na nsima, soki baninga balobeli makambo yango na basite ya kosolola na baninga, nkanda na bango ezalaki koya makasi. Mpe yango esalalaka ete bákolisa te likoki ya kotalela mikakatano na ndenge oyo ebongi.”​—Joanne.

  •   Yekolá epai ya basusu. Lisese moko ya Biblia elobi: “Kaka ndenge ebende epelisaka ebende, moto mpe asalisaka moninga na ye akende liboso.” (Masese 27:17) Okoki kozwa mateya ya ntina epai ya bayo basusu oyo bakutaná na makambo ya mpasi.

     “Ntango ozali kosolola na bato, okomona ete bango mpe bakutaná na mikakatano, kasi sikoyo bazali malamu. Sololá na bango mpo oyeba makambo nini basalaki mpe nini basalaki te mpo bálonga mokakatano oyo bazalaki na bango.”​—Julia.

  •   Zalá na motema molai. Biblia elobi: “Moto ya sembo akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma lisusu.” (Masese 24:16) Ezwaka ntango mpo na kondima makambo oyo esalemi te ndenge tokanisaki, na yango kokamwa te soki mikolo mosusu omiyoki malamu te. Likambo eleki ntina ezali nde ‘kotɛlɛma lisusu.’

     “Soki outi kokutana na likambo moko ya mpasi, motema mpe mayoki na yo esengeli kobika. Ekobika na mbala moko te, ezwaka ntango. Namoná ete moto abikaka malɛmbɛmalɛmbɛ wana ntango ezali koleka.”​—Andrea.

  •   Yekolá kozala na botɔndi. Biblia elobi: “Bómonisa botɔndi.” (Bakolose 3:15) Ata soki okutani na likambo ya mpasi ndenge nini, makambo oyo okoki komonisela botɔndi ekozala kaka. Kanisá makambo misato oyo mpo na yango olingi kozala kaka na bomoi.

     “Ntango okutani na likambo ya mpasi, ezalaka pɛtɛɛ komituna, ‘Mpo na nini ekómeli ngai?’ Mpo na komonisa ete oyebi kokanga motema, esengeli te kokanisakanisa mikakatano na yo, kasi nde kopona kozala na makanisi ya malamu mpe kozala na botɔndi mpo na oyo ozali na yango to oyo okoki kosala.”​—Samantha.

  •   Yekolá kosepela na oyo ozali na yango. Ntona Paulo alobaki: “Ezala ata na makambo ya ndenge nini, nayekoli kosepela na oyo nazali na yango.” (Bafilipi 4:11) Paulo akokaki kosala eloko te mpo na makambo oyo akutanaki na yango. Kasi akokaki kopona ndenge oyo akosala. Amonaki malamu akanga motema ata na likambo nini.

     “Eloko moko namoni epai na ngai ezali ete likambo ya liboso oyo nasalaka ntango nakutani na likambo ya mpasi ezalaka ntango nyonso te oyo eleki malamu. Nazali na mokano ya koyekola kozala na makanisi oyo ebongi mpo na likambo nyonso oyo ekómeli ngai. Yango esalisaka kaka ngai te kasi mpe baoyo bazali zingazinga na ngai.”​—Matthew.

  •   Bondelá. Biblia elobi: “Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo, mpe akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moto ya sembo akwea.” (Nzembo 55:22) Libondeli ezali te eloko oyo okosala kaka mpo omiyoka malamu. Ezali mpenza kosolola na Mozalisi, oyo “atyelaka [yo] likebi.”​—1 Petro 5:7.

     “Nasengeli kobunda kaka ngai moko te. Soki nabondeli Nzambe, nayebisi makambo nyonso na bosembo, mpe napesi ye matɔndi mpo na mapamboli na ye, nalongolaka makanisi ya mabe mpe natyaka miso na mapamboli ya Yehova. Libondeli ezali mpenza na ntina!”​—Carlos.

a Euti na buku Disconnected, ya Thomas Kersting.

b Euti na buku The Good Teen​—Rescuing Adolescence From the Myths of the Storm and Stress Years.