Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini koboya koloba maloba ya mabe?

Mpo na nini koboya koloba maloba ya mabe?

“Lokola namesaná koyoka maloba mabe, nakamwaka yango lisusu te. Namonaka yango mabe te.”​—Christopher, azali na mbula 17.

“Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kofinga mingi. Kofinga ezalaki mpasi ata moke te, kasi ekómaki mpasi mpenza kotika ezaleli yango.”​—Rebecca, azali na mbula 19.

 Mituna

  •   Oyokaka ndenge nini soki bato bazali koloba maloba mabe?

    •  Nakipaka na ngai te, namonaka yango mabe te.

    •  Etungisaka ngai mwa moke, kasi nasalaka eloko te.

    •  Esalaka ngai mabe mpenza, nakokaka komesana na yango te.

  •   Yo mpe olobaka maloba ya mabe?

    •  Te

    •  Na bantango mosusu

    •  Mbala mingi

  •   Mpo na yo, kotalela likambo ya koloba maloba mabe ezali na ntina?

    •  Te

    •  Ɛɛ

 Mpo na nini ezali na ntina

 Omonaka ete koloba maloba mabe ezali likambo monene? Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Ezali likambo monene mpenza te. Ezali na makambo ebele ya minene na mokili. Kutu, bato nyonso balobaka maloba mabe!’ Kasi, ezali mpenza bongo?

 Ata soki okondima yango to te, yebá ete ezali na bato ebele oyo baboyaka koloba maloba ya mabe. Ezali na makambo oyo etindaka bango bálobaka maloba ya mabe te, kasi bato mosusu bayebi yango te. Na ndakisa:

  •  Ezalaka kaka likambo ya maloba te. Maloba na yo emonisaka makambo oyo ezali na motema na yo. Na yango, soki osalelaka maloba ya mabe, ekoki komonisa ete okipaka te soki baninga bakoyoka ndenge nini. Ozali mpenza moto ya ndenge wana?

     Biblia elobi: “Makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema.”​Matai 15:18.

    Maloba mabe ebebisaka makanisi. Mpo na nini kobimisa yango mpo bato mosusu báyoka yango?

  •  Ekoki kotinda baninga bákanisela yo mabe. Buku moko (Cuss Control) elobi boye: “Maloba na biso ekoki komonisa banani bakozala baninga na biso, lokumu nini libota mpe baninga ya mosala bakopesa biso, boyokani oyo tokozala na yango na basusu, ndakisa oyo tokopesa basusu, soki tokozwa mosala to tokomata grade, mpe ndenge bapaya bakotalela biso.” Ebakisi boye: “Omituna soki boyokani na yo na basusu ekokóma malamu koleka te soki otiki koloba maloba mabe.”

     Biblia elobi: “Maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.”​—Baefese 4:31.

  •  Esepelisaka bato te, ndenge okoki kokanisa. Na buku na ye, (How Rude!) moto moko ya mayele na nkombo Alex Packer alobi boye: “Bato baboyaka koyoka bato oyo balobaka maloba mabe.” Abakisi ete soki moto azali kosalela maloba mabe “akoki te kobimisa maloba ya bwanya, ya bososoli, ya mayele, to ya boboto. Soki maloba na yo ezalaka ya ntina te, ya bilobaloba, mpe ya bozoba, bɔɔngɔ na yo mpe ekokóma kokanisa bongo.”

     Biblia elobi: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te.”​—Baefese 4:29.

 Oyo okoki kosala

  •  Omityela mokano. Okoki komityela mokano ya kotika koloba maloba mabe ata nsima ya sanza? Mpo omona soki ozali kokende liboso, okoki kokomaka milende oyo ozali kosala. Kasi mpo olonga mpenza, ekoki kosɛnga osala mpe makambo mosusu. Na ndakisa:

  •  Boyá kominanola oyo ekotondisa maloba mabe na bɔɔngɔ na yo. Biblia elobi: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) “Baninga” yango ezali kaka bato te, ezali mpe kominanola: bafilme oyo otalaka, masano ya video oyo obɛtaka, miziki oyo oyokaka. Kenneth, elenge mwasi oyo azali na mbula 17 alobi boye: “Ntango ozali koyoka miziki oyo olingaka, okomona ozali koyemba maloba na yango mpe obosani ete ezali maloba mabe, kaka mpo ozali kolanda elɛngi na yango.”

  •  Monisá ete okoli. Bato mosusu balobaka maloba mabe mpo bakanisaka ete ekomonisa ete bakómi mikóló. Nzokande, emonisaka nde bomwana. Biblia elobi ete bato oyo bakoli, “makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebre 5:14) Balandaka bizaleli ya mabe te kaka mpo na “kokamwisa” basusu.

 Mpo na koloba solo, maloba mabe ekómisaka makanisi mbindo. Maloba yango ezali mingi na mokili oyo! Buku Cuss Control epesi toli oyo: “Kobakisa mosusu te. Salá makasi olongola maloba mabe esika ozali. Okomiyoka malamu mpe bato mosusu bakosepela na yo.”