Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini koboya kolanda bavedɛti?​—Eteni 2: Mpo na bana mibali

Mpo na nini koboya kolanda bavedɛti?​—Eteni 2: Mpo na bana mibali

 Bavedɛti oyo balakisaka na TV bazalaka ndenge nini?

 Talá etanda wana na nse, mpe yanolá na mituna.

Molɔngɔ 1

Molɔngɔ 2

Motó makasi

Moto ya botosi

Moimi

Sembo

Makambo makasi

Boboto

Gɔigɔi

Makasi na mosala

Mafumafu

Ekɛngɛ

Mayele mabe

Alobaka solo

  1.   Maloba nini emonisi bizaleli ya bilenge mibali oyo otalaka na bafilme, na TV, mpe na bapiblisite?

  2.   Maloba nini okolinga ete bato básalela mpo na kolobela bizaleli na yo?

 Na ntembe te, biyano oyo opesi na motuna ya liboso euti na Molɔngɔ 1 mpe biyano oyo opesi na motuna ya mibale euti na Molɔngɔ 2. Soki ezali bongo, ezali malamu mpo mbala mosusu bilenge mibali oyo balakisaka na TV bazalaka mpenza lokola yo te, to mpe bamonisaka mpenza te ndenge oyo osengeli kokóma. Mpo na nini tolobi bongo?

  •   Mbala mingi bavedɛti ya mibali oyo balakisaka na TV bazalaka mobulu mpe motó makasi. Buku moko (Why Boys Don’t Talk​—and Why It Matters) elobi ete bavedɛti mingi ya mibali oyo balakisaka na TV, na bafilme, mpe na masano bazalaka “bingambe mpe babangisaka bato . . . Balingaka komonisa ete mwana mobali ya solosolo azalaka makambo makasi mpe motó makasi.”

     Kanisá naino. Kozala mobulu ekosalisa yo oyeba kofanda malamu na baninga, oyokanaka malamu na baninga ya mosala, mpe ozala mobali ya malamu? Soki batumoli yo, osalaka nini​—obimisaka nkanda mbala moko, to omipekisaka? Nini ekomonisa mpenza ete ozali mobali ya solosolo?

     Biblia elobi: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya, mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.”​—Masese 16:32.

    Soki oyebi komipekisa, ozali na makasi koleka soda

  •   Bavedɛti oyo balakisaka na TV bazalaka lokola mibali balingá makambo ya kosangisa nzoto. Chris, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Na bafilme mpe na televizyo, bilenge mibali bazwaka basi ebele, lelo mosusu lobi mosusu, kaka lokola bilamba ya kolata.” Gary, oyo azali na mbula 18, abakisi boye: “Na bafilme, elenge mobali azalaka moto oyo alingá makambo ya kosangisa nzoto.” Na ndakisa, bafilme mosusu emonisaka lokola ete elenge mobali ntina na ye kaka kokende bafɛti, komɛla masanga, mpe kosangisa nzoto.

     Kanisá naino. Yo olingi ete bato báyeba yo na bizaleli ya bilenge mibali oyo balakisaka na bafilme? Mobali ya solosolo azwaka nde basi lokola biloko ya kosangisa na yango nzoto, to asalelaka bango makambo na limemya?

     Biblia elobi: “Mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto na ye na kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te.”​—1 Batesaloniki 4:4, 5.

  •   Bavedɛti oyo balakisaka na TV bazalaka lokola mibali oyo bakolá te na makanisi. Na bafilme mingi mpe baemisyo ya televizyo, mbala mingi bana mibali bazalaka bato ya gɔigɔi mpe oyo bayebi mosala te. Yango wana mbala mosusu mikóló mosusu bandimaka mpenza te ete bilenge mibali bakoki kosala makambo malamu. Gary, oyo totángaki liboso, alobi boye: “Ntango nakómaki na mbula 16, ezalaki mpasi nazwa mosala mpo bapatrɔ mingi bazalaki kondima kozwa kaka basi na mosala. Bazalaki komona ete bana mibali nyonso bakolá te na makanisi mpe babongi kotyelama motema te!”

     Kanisá naino. Ezali solo ete bana mibali babongi kotyelama motema te, ndenge balakisaka yango na TV mpe na bafilme? Ndenge nini okoki komonisa ete ozalaka bongo te?

     Biblia elobi: “Moto atyola bolenge na yo te. Nzokande, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto.”​—1 Timote 4:12.

 Oyo osengeli koyeba

  •   Makambo oyo balakisaka na TV to na bafilme ekoki kobongola bizaleli na yo. Na ndakisa, makambo oyo omoni na TV to na bafilme ekoki kotinda yo okanisa ete mpo oyebana, osengeli kozala na molato ya mikolo oyo. Colin, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Bapiblisite elakisaka modɛlɛ ya bilamba oyo bilenge mibali basengeli kolata, mpe okomona bana basi bazali kolandalanda bango. Yango etindaka moto amona ete asengeli kokende kosomba bilamba yango. Ngai mpe nasí nasalá bongo!”

     Kanisá naino: Bilamba oyo olati ekomonisa mpenza bomoto na yo, to ekomonisa ete okómi bilandalanda? Banani bakozwa matomba soki obimisaka mbongo mpo osomba elamba nyonso oyo ebimi?

     Biblia elobi: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.”​—Baroma 12:2.

  •   Bana basi bakoki kobanda kokima yo soki ozali komekola bavedɛti. Talá makambo oyo bilenge basi mosusu balobi:

    •  “Nasepelaka na elenge mobali oyo azali na bomoto na ye moko koleka oyo azali bilandalanda mpe amekolaka basusu mpo bándima ye. Mwana mobali oyo alukaka kaka kobenda likebi ya basusu abimaka nde zoba na miso ya bato!”​—Anna.

    •  “Bapiblisite etindaka bilenge mibali bámona ete mpo bana basi básepela na bango, basengeli kozala na baaparɛyi ya mikolo oyo, kobima ndenge moko boye. Nzokande, ntango bana basi bazali kokola, batalaka lisusu makambo wana te. Bamonaka nde bizaleli ya mobali mpe ndenge afandaka na bato. Na ndakisa, bana basi basepelaka na bana mibali oyo balobaka solo mpe bazalaka sembo.”​—Danielle.

    •  “Mbala mingi elenge mobali ya kitoko azalaka lolendo; nalingaka kozala pembeni ya bato ya ndenge wana te. Ata soki mwana mobali azali kitoko ndenge nini, akobenda ngai te soki azali bizaleli mabe mpo ekozipa kitoko yango.”​—Diana.

     Kanisá naino: Biblia elobi ete elenge Samwele “azalaki se kokola mpe azalaki kosepelisa mpenza Yehova ná bato.” (1 Samwele 2:26) Bizaleli nini osengeli kobongisa mpo okóma lokola Samwele?

     Biblia elobi: “Bómitambwisa lokola mibali.”​—1 Bakorinti 16:13.

 Oyo okoki kosala

  •   Yekolá koboya makambo mosusu ya bavedɛti. Talá makambo Biblia elobi: “Eloko nyonso oyo ezali na mokili​—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—​euti na Tata te, kasi euti na mokili.”​—1 Yoane 2:16.

     Bafilme mpe TV elendisaka makambo yango mpe emonisaka ete ezali malamu. Yango wana, yekolá koboya makambo mosusu oyo omonaka na televizyo to na bafilme. Makambo mingi ezalaka makanisi ya bato ya mombongo oyo balingi kolya yo mbongo.

  •   Yekolá bizaleli ya malamu. Biblia elobi: “Bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika na kolanda elilingi ya Oyo azalisaki yango”​—kasi te na kolanda elilingi oyo balakisaka na TV to na bafilme.​—Bakolose 3:10.

     Mpo olanda toli yango malamu, kanisá lisusu bizaleli oyo oponaki na ebandeli ya lisolo oyo, oyo okolinga bato báyeba yo na yango. Salá makasi obanda komonisa bizaleli yango to okóma komonisa yango mingi.

  •   Luká bandakisa ya malamu. Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” (Masese 13:20) Mibali nini oyo oyebi bamonisá ete bazali na bwanya? Ekoki kozala na libota na bino, na ndakisa tata na bino to ndeko ya tata na bino. Ekoki mpe kozala baninga na yo oyo bakɔmɛli. Batatoli ya Yehova basepelaka mpo, na masangá na bango, ezali na mibali mingi oyo bazali ndakisa malamu. Biblia mpe elobeli mibali mingi ya bizaleli malamu, na ndakisa Tito, oyo atiká ndakisa malamu mpo na bilenge.​—Tito 2:6-8.

     Likanisi: Tángá buku Mekolá kondima na bango mpo oyeba mibali ya bizaleli malamu oyo Biblia elobeli na ndakisa, Abele, Noa, Abrahama, Samwele, Eliya, Yona, Yozefe, mpe Petro.