Ndenge ekomamá na Matai 6:1-34

  • LISOLO LIKOLÓ YA NGOMBA (1-34)

    • Komimonisa te mpo na misala na yo malamu (1-4)

    • Ndenge ya kobondela (5-15)

      • Libondeli ya ndakisa (9-13)

    • Kokila bilei (16-18)

    • Biloko ya motuya na mabele mpe na likoló (19-24)

    • Bótika komitungisa (25-34)

      • Bókoba koluka liboso Bokonzi (33)

6  “Bókeba ete bósala te misala ya malamu* na miso ya bato mpo bámona bino;+ soki te, bokozwa mbano te epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.  Yango wana, ntango opesi makabo ya motema mawa,* kobɛta kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka na basinagoga mpe na babalabala, mpo bato bákumisa bango. Ya solo nalobi na bino, basili kozwa mbano na bango mobimba.  Kasi yo, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, lobɔkɔ na yo ya mwasi eyeba te oyo lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosala,  mpo makabo na yo ya motema mawa epesama na ndenge ya kobombana. Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana, akofuta yo.+  “Lisusu, ntango bozali kobondela, bósala lokola bakosi te;+ mpo balingaka kobondela, batɛlɛmi na basinagoga mpe na bisika oyo banzela minene ekutani, mpo bato bámona bango.+ Ya solo nalobi na bino, basili kozwa mbano na bango mobimba.  Kasi yo, ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana.+ Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo.  Kasi ntango bozali kobondela, bózongela kaka maloba moko mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi.  Boye, bózala lokola bango te, mpo Tata na bino ayebi biloko oyo bosengeli na yango+ liboso kutu bósɛnga ye.  “Yango wana, bosengeli kobondela boye:+ “‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo+ esantisama.*+ 10  Bokonzi+ na yo eya. Mokano na yo+ esalema mpe na mabele,+ lokola na likoló. 11  Pesá biso lelo bilei* na biso mpo na mokolo oyo;+ 12  mpe limbisá biso masumu na biso,* ndenge biso mpe tolimbisaka baoyo basaleli biso lisumu.+ 13  Mpe kotika biso te tókwea na komekama,*+ kasi bikisá* biso na moto mabe.’+ 14  “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló mpe akolimbisa bino.+ 15  Kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino mpe akolimbisa mabunga na bino te.+ 16  “Ntango bozali kokila bilei,+ bótika kokómisa bilongi mawamawa ndenge bakosi basalaka, mpo babebisaka bilongi na bango* mpo bato bámona ete bazali kokila bilei.+ Ya solo mpenza nalobi na bino: Basili kozwa mbano na bango mobimba. 17  Kasi yo, ntango ozali kokila bilei, tyá mafuta na motó na yo mpe sukolá elongi na yo, 18  mpo omonana na miso ya bato te ete ozali kokila bilei, kasi kaka Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana nde amona. Bongo Tata na yo oyo atalaka longwa na esika ya kobombana akofuta yo. 19  “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. 20  Kasi, bómibombela biloko ya motuya na likoló,+ epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te,+ mpe epai miyibi bakɔtaka te mpe bayibaka te. 21  Mpo esika eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo mpe ekozala kuna. 22  “Mwinda ya nzoto ezali liso.+ Yango wana, soki liso na yo ezali kotala kaka eloko moko,* nzoto na yo mobimba ekongɛnga.* 23  Kasi soki liso na yo ezali bilulela,*+ nzoto na yo mobimba ekozala molili. Soki pole oyo ezali kati na yo ezali mpenza molili, boye molili yango ezali makasi mpenza! 24  “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo, to akoyina moko mpe akolinga mosusu,+ to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.+ 25  “Yango wana nalobi na bino: Bótika komitungisa+ mpo na bomoi* na bino mpo na oyo bokolya to oyo bokomɛla, to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata.+ Bomoi* ezali na ntina mingi koleka bilei te? Mpe nzoto ezali na ntina mingi koleka bilamba te?+ 26  Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló;+ elonaka te, ebukaka mbuma te mpe eyanganisaka te na bandako ya kobomba biloko, kasi Tata na bino ya likoló aleisaka yango. Bino boleki yango na motuya te? 27  Nani kati na bino soki azali komitungisa akoki kobakisa ata mwa moke* bolai ya bomoi na ye?+ 28  Lisusu, mpo na nini bozali komitungisa mpo na bilamba? Bózwa liteya na fololo lísi oyo ekolaka na esobe; emonaka mpasi te, mpe etongaka elamba te. 29  Kasi nalobi na bino ete ata Salomo,+ na nkembo na ye nyonso, alataki lokola moko na yango te. 30  Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe ndenge wana, oyo ezali wana lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke? 31  Yango wana, bómitungisa ata moke te+ mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’+ 32  Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo elukaka na lokoso mpenza. Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. 33  “Boye, bókoba koluka liboso Bokonzi mpe bosembo na ye,* mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.+ 34  Na yango bómitungisa ata moke te mpo na lobi,+ mpo lobi ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.

Maloba na nse

To, “bómonisa bosembo na bino.”
To, “makabo epai ya babola.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “etalelama mosantu.”
Lil., “mampa.”
Lil., “longolá banyongo na biso.”
Lil., “Kokɔtisa biso na komekama te.”
To, “sikolá.”
To, “babongisaka nzoto na bango te.”
To, “ezali komona malamu.” Lil., “ezali mindɔndɔ te.”
To, “ekotonda na pole.”
Lil., “mabe.”
To, “Molimo.”
To, “milimo.”
Lil., “lipeko moko na.” Talá Ap. B14.
To, “boyengebene na ye.”