Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ezali mpenza na ntina nasɛnga bolimbisi?

Ezali mpenza na ntina nasɛnga bolimbisi?

 Okosala nini soki makambo oyo elandi ekómeli yo?

  1.   Molakisi na yo agangeli yo mpo na likambo moko ya mabe oyo osali ntango azali koteya.

     Okosɛnga ye bolimbisi, atako okanisi ete alobelaki yo mabe?

  2.   Moninga moko asepeli te na makambo oyo olobi mpo na ye.

     Okosɛnga ye bolimbisi, atako mpo na yo olobaki likambo moko ya mabe te?

  3.   Papa na yo apesi yo nkanda, mpe okateli ye lingala.

     Okosɛnga ye bolimbisi, atako okanisi ete ye nde moto asilikisaki yo?

 Eyano na mituna wana misato ezali ɛɛ. Kasi mpo na nini osengeli kolobaka “limbisá ngai,” ata ntango okanisi ete ozali mpenza na foti te?

 Mpo na nini osengeli kosɛnga bolimbisi?

  •   Kosɛnga bolimbisi ekomonisa ete okoli mpenza. Ntango ondimi likambo moko oyo olobaki to osalaki, yango emonisi ete ozali kokolisa bizaleli ya ntina oyo ekosalisa yo ntango okokóma mokóló.

     “Komikitisa mpe motema molai ekoki kosalisa biso tósɛngaka bolimbisi mpe tóyokaka makambo oyo bato mosusu bazali koloba na biso.”​—Rachel.

  •   Kosɛnga bolimbisi ekosala ete ozala na kimya na bato. Ntango moto alobi “limbisá ngai” amonisi ete azali na mposa makasi ya kozongisa kimya, kasi te ya komilongisa to kopesa bato mosusu foti.

     “Ata soki okanisi ete ozali mpenza na foti te, osengeli koluka libosoliboso kozongisa kimya. Kaka mwa maloba ‘limbisá ngai’ ekoki kobongisa mpenza boninga.”​—Miriam.

  •   Kosɛnga bolimbisi ekosala ete omiyoka malamu. Ntango ozokisi moto na maloba to na likambo moko oyo osali, ekoki kosala ete omiyoka lokola omemi mokumba moko ya kilo. Kasi ntango osɛngi bolimbisi ezali lokola balongoli yo mokumba yango. a

     “Na bantango mosusu soki nakateli papa to mama lingala, nazalaki komiyoka mabe, kasi ezalaki mpe pɛtɛɛ te mpo nasɛnga bango bolimbisi. Kasi soki nasɛngi bango bolimbisi nazalaki komiyoka malamu mpo ezalaki kozongisa kimya na libota.”​—Nia.

    Mawa oyo eyaka ntango ozokisi moto ezali lokola mokumba moko ya kilo; ntango kaka osɛngi bolimbisi okoyoka lokola mokumba yango elongwe

 Ezalaka pɛtɛɛ kosɛnga bolimbisi? Te! Elenge mwasi moko na nkombo Dena, azalaki kozanga botosi epai ya mama na ye, mpe yango esɛngaki ete asɛngaka bolimbisi mbala na mbala, alobi boye: “Ezalaka pɛtɛɛ te koloba ‘limbisá ngai.’ Ezali lokola eloko moko ekangami ngai na mongongo mpe mwaye ya kobimisa maloba ezali te!”

 Ndenge nini osengeli kosɛnga bolimbisi?

  •   Soki likoki ezali, kende okutana na moto yango. Kokutana na moto oyo osalaki mabe mpo na kosɛnga ye bolimbisi ekosala ete moto yango amona mpenza ete oyoki mawa mpo na likambo oyo osalaki. Kasi soki otindi kaka mesaje na telefone, moto yango akoki kondimela yo te. Ata soki otye elilingi ya mawa na mesaje yango, yango ekomonisa mpenza te ete ozali koyoka mawa ndenge wana.

     Likanisi: Soki likoki ya kokutana na moto boye ezali te, okoki ata kobenga ye na telefone to kotindela ye karte. Ezala oponi kosalela lolenge nini, bongisá malamu maloba oyo okosalela.

     Toli ya Biblia: “Motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.”​—Masese 15:28.

  •   Koumela te mpo na kosɛnga bolimbisi. Soki ozali koumela mpo na kobongisa makambo, yango ekoki koyeisa lisusu makambo ndɔngɔ mpe kobebisa lisusu boyokani na yo na moto oyo ozali na ye likambo.

     Likanisi: Mityelá mokano, okoki koloba: ‘Nakosɛnga bolimbisi lelo.’ Poná ngonga ya malamu mpo na kosala yango mpe salá makasi okokisa yango.

     Toli ya Biblia: “Salá noki obongisa makambo.”​—Matai 5:25.

  •   Monisá mpenza ete oyoki mawa. Elenge mwasi moko na nkombo Janelle alobaki boye: Koloba kaka “limbisá ngai nasalaki yango na nko te” ezali kosɛnga bolimbisi te! “Moto oyo osalaki mabe akondimela yo kaka soki ondimi na motema moko mabe oyo osalaki.”

     Likanisi: Eloko moko te epekisa yo ondima mpenza foti na yo. Koloba te ete “liboso nasɛnga yo bolimbisi mpo na mabe oyo nasalaki, osengeli naino kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo yo mpe osalaki.”

     Toli ya Biblia: “Tólanda makambo oyo etyaka kimya.”​—Baroma 14:19.

a Soki obungisaki to obebisaki eloko ya moto mosusu ekozala malamu osuka kaka te na kosɛnga ye bolimbisi, kasi ekozala malamu ofuta eloko oyo obungisaki to obebisaki.