Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi?

Mpo na nini toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi?

 Mbala mibale na pɔsɔ, Batatoli ya Yehova basalaka makita na bisaka na bango ya losambo, oyo babengaka Bandako ya Bokonzi. Nini esalemaka kuna, mpe ndenge nini okoki kozwa matomba soki ozali koyangana na makita yango?

 Nini esalemaka na Ndako ya Bokonzi?

 Ndako ya Bokonzi ezali esika oyo toyekolaka mateya ya Biblia oyo esalisaka biso na bomoi. Makita oyo esalemaka kuna ekoki kosalisa yo:

  •   oyekola solo na ntina etali Nzambe.

  •   okanga ntina ya makambo oyo ezali kosalema lelo oyo.

  •   okóma moto malamu.

  •    ozwa baninga ya malamu.

 Oyebaki yango? Esika ya losambo ya Batatoli ya Yehova ebengamaka Ndako ya Bokonzi mpo kuna nde balobelaka mingimingi Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 6:9, 10; 24:14; Luka 4:43.

 Mpo na nini osengeli koyanganaka na makita?

 Matomba oyo okozwa. Mitinda ya Biblia oyo elobelamaka na makita ya Batatoli ya Yehova ekosalisa yo ‘ozwa bwanya.’ (Masese 4:5) Yango elimboli ete Biblia ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu na bomoi na yo. Ekoki mpe kosalisa yo ozwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi, lokola:

 Batitre ya badiskur oyo elandi ezali mwa ndambo ya mateya oyo epesamaka na makita na biso ya pɔsɔ:

  •   Mpo na nini tosengeli kotika Biblia etambwisaka biso?

  •   Epai wapi tokoki kozwa lisalisi na ntango ya mpasi?

  •   Oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala mpo na biso sikoyo.

 “Moninga moko ya kelasi ayaki na makita na biso. Afandaki esika moko na libota na biso mpe napesaki ye mikanda na ngai asalela. Na nsima ayebisaki ngai ete asepelaki mingi na biyano ya bandeko na makita. Mpe alobaki ete na lingomba na bango bayekolaka Biblia te ndenge biso tosalaka.”​—Brenda.

 Oyebaki yango? Bisika ya kofanda ezali ofele na Ndako ya Bokonzi mpe bakɔngɔlaka mabonza te.

 Koyangana na makita ekolendisa yo. Biblia emonisi ntina oyo tosengeli koyangana na makita elongo na bandeko na biso bakristo, ezali mpo “tólendisanaka.” (Baebre 10:24, 25) Kozala na baninga malamu mpe oyo batyaka Nzambe mpe basusu na esika ya liboso, elendisaka na mokili oyo bato mingi bamilingaka bango moko.

 “Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala, nalɛmbaka mingi mpe nakómaka mawamawa, kasi bandeko na Ndako ya Bokonzi basalaka ete namiyoka malamu. Nsima ya makita nazongaka na ndako na esengo mpe namibongisaka malamu mpo na mokolo oyo elandi.”​—Elisa.

 Oyebaki yango? Masanga ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ezali koleka 120 000 mpe basalaka makita na bisika koleka 60 000. Mbula na mbula bandako ya Bokonzi koleka 1 500 ezali kotongama mpe motángo na yango ezali kobakisama se kobakisama. a

a Mpo na koyeba esika makita na biso esalemaka, kende na esika bakomi “Makita ya Batatoli ya Yehova” mpe finá esika bakomi “Esika oyo ezali pene na bino.”