Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini kobongisa matata ná baleki to bayaya na ngai?

Mpo na nini kobongisa matata ná baleki to bayaya na ngai?

 Baninga malamu kasi mpe ya motó mpasi

 Tokoki koloba ete bayaya to baleki bazali baninga malamu kasi mpe ya motó mpasi. Bolinganaka​—kasi na bantango mosusu boyokanaka te. Helena oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Leki na ngai ya mobali apesaka ngai nkanda. Ayebaka malamu eloko nini akoki koloba to kosala mpo nasilika.”

 Matata mosusu ekoki kosila soki bosololi mpe boyokani na mwa makambo. Na ndakisa:

  •   Bana mibali mibale oyo balalaka shambrɛ moko bakoki kobendana mpo moko alingi te mosusu ayeba makambo na ye. Solisyo? Yebá kondima makanisi ya moninga mpe mokomoko atikela moninga oyo azali na yango mposa. Bósalela toli ya Biblia oyo ezali na Luka 6:31.

  •   Bandeko basi mibale bakoki “kolatana” bilamba kozanga kosɛnga. Solisyo? Bósolola likambo yango mpe bótya mibeko oyo ebongi. Bósalela toli ya Biblia oyo ezali na 2 Timote 2:24.

 Na bantango mosusu, matata kati na bandeko ezalaka makasi mpe ekoki kobimisa mpasi makasi. Tótalela bandakisa mibale ya Biblia:

  •   Miriame ná Arona bayokelaki ndeko na bango Moize zuwa mpe yango ebimisaki makama minene. Tángá lisolo yango na Mitángo 12:1-15. Mpe na nsima, omituna boye: ‘Nakoki kosala nini mpo nayokela bandeko na ngai zuwa te?’

  •   Nkanda ya Kaina emataki makasi tii etindaki ye aboma ndeko na ye Abele. Tángá lisolo yango na Ebandeli 4:1-12. Mpe na nsima, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kopekisa nkanda na ngai soki nawelani na bandeko na ngai?’

 Bantina mibale ya kobongisa matata

 Ata soki ezali mpenza mpasi koyokana malamu na bayaya to baleki na yo, ezali na bantina mibale oyo esengeli kotinda yo osala milende.

  1.   Emonisaka ete moto akoli. Alex, elenge mobali moko ya mbula 25 alobi boye: “Nazalaki kosilikela baleki na ngai mibale ya basi noki. Sikoyo nasalaka lisusu bongo te mpe namoniselaka bango motema molai. Yango emonisi ete nakoli.”

    Biblia elobi boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi, kasi ye oyo azali motema mokuse atombolaka bozoba.”​—Masese 14:29.

  2.   Ekosalisa yo na mikolo ezali koya. Soki okokaka kokanga motema te na mabunga ya bandeko na yo, okosala nini na mabunga ya molongani na yo, moninga na yo ya mosala, patrɔ na yo to moto mosusu nyonso?

     Kobosana te: Koyeba kosolola mpe kobongisa makambo ezali likoki oyo ekosalisa yo oyokanaka malamu na basusu na mikolo ezali koya mpe libota nde ezali esika ya malamu koleka mpo na kokolisa likoki yango.

     Biblia elobi: “Soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”​—Baroma 12:18.

 Okosepela básalisa yo oyeba ndenge ya kosilisa matata ná bandeko na yo? Tángá “Makambo bilenge mosusu balobi” mpe talá lokasa oyo mpo na bilenge, “Koyokana malamu ná baleki to bayaya.”