Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki toboyani?

Nasala nini soki toboyani?

 Steven alobi: “Nsima ya koboyana na mwana mwasi moko, nayokaki mpasi mingi na motema. Nayoká naino mpasi ya bongo te banda nabotama.”

 Yo mpe okutana na likambo ya bongo? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

 Esalaka ndenge nini?

 Koboyana ememelaka bato nyonso mibale mpasi.

  •  Soki yo nde oboyaki moto, mbala mosusu ozali ndenge moko na Jasmine, oyo alobaki: “Koyeba ete napesi moto mpasi, namiyokaka lokola namemi mokumba moko oyo nakolinga lisusu komema yango te.”

  •  Soki yo te nde oboyaki moto, okoyeba mbala mosusu ntina oyo bato mosusu babengaka likambo yango liwa ya ndambo. Elenge mwasi moko na nkombo Janet alobi: “Nalekisaki bantango moko ya mawa makasi, ya komiboya, ya nkanda, ya koluka kozongana, ya kotungisama na makanisi, mpe nsukansuka pene na mbula moko nandimaki likambo yango.”

 Na mokuse: Koboyana na moto ekoki kopesa yo mpasi na motema mpe kokómisa yo mawamawa. Mokomi moko ya Biblia alobelaki yango na maloba oyo: “Elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”​—Masese 17:22.

 Oyo okoki kosala

  •  Sololá na mokóló moko oyo otyelaka motema. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Koyebisa moboti to mokóló moko ndenge ozali komiyoka ekoki kosalisa yo okóma na makanisi malamu.

     “Na boumeli ya basanza nazalaki kolinga kozala kaka ngai moko mpe nazalaki kolinga te koyebisa bato ndenge nazalaki komiyoka. Kasi baninga bakoki kosalisa yo omiyoka malamu. Namiyoki malamu ntango kaka nafungolelaki bango motema.”​—Janet.

  •  Zwá liteya na likambo yango. Lisese moko ya Biblia elobi: “Zwá bwanya, zwá mayele.” (Masese 4:5) Likambo ya mabe ekoki kosalisa biso tómiyeba malamu mpe tóyeba nini tokoki kosala na ntango ya mawa.

     “Nsima ya koboyana na moto, moninga moko atunaki ngai, ‘liteya nini ozwi na likambo yango, mpe ndenge nini okoki kosalela yango ntango okolingana na moto mosusu?’”​—Steven.

  •  Libondeli. Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Libondeli ekoki kosalisa yo olonga mawa na yo mpe otalela bokabwani yango na ndenge ya malamu.

     “Bondelá ntango nyonso. Yehova ayebi mpasi oyo ozali koyoka mpe ayebi makambo malamumalamu koleka yo.”​—Marcia.

  •  Salisá basusu. Biblia elobi: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:4) Soki omipesi mingi na kosalisa basusu, okotalela bokabwani wana na makanisi ya malamu.

     “Koboyana na moto ezalaka lokola mokili esuki, esalaka mpasi makasi koleka mpasi ya nzoto. Kasi namonaki ete mpasi yango ekoki kosila. Nasengelaki kaka kotika ntango eleka mpo nabika.”​—Evelyn.