Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo

 Mbula nyonso, bilenge mingi oyo bazali kobɔkwama na mabota ya Batatoli ya Yehova bazwaka batisimo. Yo mpe ozali kokana kosala yango? Soki ɛɛ, ekozala malamu oyeba ndimbola ya komipesa mpe ya batisimo.

 Batisimo ezali nini?

 Biblia emonisi ete batisimo ezali kozindisa moto nzoto mobimba na mai, kasi kaka te kosopela moto mai na motó, mpe ezali na ndimbola monene.

  •   Kozindisama mobimba na mai na ntango ya batisimo emonisaka liboso ya bato ete na bomoi na yo okosala lisusu te kaka makambo oyo esepelisaka yo.

  •   Kobimisama na mai emonisaka ete obandi bomoi ya sika, elingi koloba, okosala libosoliboso makambo oyo esepelisaka Nzambe.

 Ntango ozwi batisimo, ondimi liboso ya bato ete Yehova nde azali na lotomo ya kokata ete likambo boye ezali malamu to mabe, mpe omonisi na miso ya bato ete olakaki ye ete okosala nyonso oyo alingi yo osala.

 Kanisá naino: Nini esengeli kotinda yo olinga komonisa liboso ya bato ete okotosa Yehova bomoi na yo mobimba? Talá 1 Yoane 4:19 mpe Emoniseli 4:11.

 Komipesa na Nzambe elimboli nini?

 Liboso ozwa batisimo, osengeli naino komipesa na Yehova na esika oyo ozali yo moko. Ndenge nini okosala yango?

 Okosala libondeli moko epai okoyebisa Yehova ete olaki kosalela ye mpo na libela mpe ete okosala nyonso oyo akosɛnga yo, ata soki likambo nini esalemi to soki basusu baponi kosala oyo balingi.

 Batisimo nde emonisaka na miso ya bato ete omipesaki na Nzambe na nzela ya libondeli. Emonisaka ete omiboyi yo moko mpe sikoyo okómi moto ya Yehova.—Matai 16:24.

 Kanisá naino: Mpo na nini bomoi na yo ekokóma malamu koleka soki okómi moto ya Yehova? Talá Yisaya 48:17, 18 mpe Baebre 11:6.

 Mpo na nini kozwa batisimo ezali na ntina?

 Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozwa batisimo. (Matai 28:19, 20) Na yango, batisimo ezali lisɛngami mpo na bakristo tii lelo. Kutu, Biblia elobi ete batisimo ezali na ntina mpo na kobika.​—1 Petro 3:21.

 Kasi, bolingo mpe boyokani na yo mpo na Yehova nde esengeli kotinda yo ozwa batisimo. Osengeli kozala na makanisi lokola mokomi ya nzembo, oyo akomaki: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu nyonso oyo asalelá ngai? . . . Nakobelela nkombo ya Yehova. Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova.”​—Nzembo 116:12-14.

 Kanisá naino: Bolamu nini Yehova asalelá yo, mpe ndenge nini okoki kofuta ye yango? Talá Kolimbola Mibeko 10:12, 13 mpe Baroma 12:1.