Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Namonanaka ndenge nini na miso ya bato?

Namonanaka ndenge nini na miso ya bato?

 Mpo na nini osengeli kokipe elateli na yo? Mpo bilamba elobaka. Elateli na yo epesaka nsango nini?

 Mabunga minene misato etali ndenge ya kolata mpe ndenge ya kokima yango

Libunga #1: Kotika ete bapanzi-nsango bátinda yo olata ndenge bango balingi.

 Elenge moko na nkombo Theresa, alobi boye: “Na bantango mosusu nabendamaka na elateli boye to boye mpo bato mingi bazali kosalela yango piblisite. Soki bɔɔngɔ na yo etondi na bililingi ya bato oyo balati lolenge moko boye ya elamba, ekoki kozala mpasi oboya kolata lokola bango.”

 Kaka bana-basi te nde bakweaka na motambo ya bapiblisite. Buku moko (The Everything Guide to Raising Adolescent Boys) elobi boye: “Bana-mibali mpe balandaka elateli ya mikolo oyo. Ata soki bazali naino bilenge mpenza, bapiblisite elukaka kaka kobenda bango.”

 Toli ya malamu: Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Na kotalela toli yango, talelá malamu bapiblisite oyo otalaka. Na ndakisa, soki omoni piblisite ya bilamba oyo balobeli yango ete ezali “kitoko,” “yango nde ezali kolatama mingi,” to “ekobenda basheri,” omituna boye:

  •  ‘Soki nalati bongo, ekozala mpo na litomba ya nani?’

  •  ‘Bato bakomona ete nazali na bomoi ya lolenge nini?’

  •  ‘Bomoi ya lolenge wana, ezali komonisa mpenza ndenge nazalaka mpe makambo oyo nalingaka?’

 Toli na makambo ya kolata: Na boumeli ya pɔsɔ mobimba, talá malamumalamu bapiblisite mpe baemisyo mosusu oyo elobelaka mingi bilamba. Ezali kokumisa bomoi ya lolenge nini? Ezali nde na nsango moko oyo ebombani na nsima ya bapiblisite to baemisyo yango, oyo ezali mpo na kotinda yo omona ete esengeli olanda elateli moko boye? Elenge moko na nkombo Karen, alobi boye: “Batyaka biso mbamba makasi ete tómonana kitoko, tólata kitoko mpe tólakisa ete tozali na nzoto ‘kitoko.’ Bato ya bapibliste oyo bayebaka bongo, balukaka kobenda libosoliboso nde bilenge.”

Libunga #2: Koluka kokokana na bato mosusu nyonso.

 Elenge moko na nkombo Manuel, alobi boye: “Soki lolenge moko boye ya elamba ezali kolatama mingi, boye moto nyonso akolinga kolata yango. Soki olati yango te, bato bakokamwa yo.” Elenge moko na nkombo Anna, andimi yango; alobi boye: “Bilamba oyo ebimi sika ezali na likambo te, kasi likambo ezali nde ya kolata bongo.”

 Toli ya malamu: Biblia elobi boye: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.” (Baroma 12:2) Na kotalela toli yango, talá malamumalamu esika obombaka bilamba, mpe omituna boye:

  •  ‘Nalandaka libosoliboso nini na likambo etali kopona bilamba?’

  •  ‘Kozala na bilamba oyo ezali na grife ezali na ntina nini mpo na ngai?’

  •  ‘Nalukaka nde bilamba na ngai ebenda likebi ya bato?’

 Toli na makambo ya kolata: Na esika otalela kaka makambo mibale​—bilamba oyo ezali kolatama mingi (mpe bato bazali kolinga yango) to oyo bato bazali lisusu kolata yango te (mpe bato balingi yango lisusu te)—​Talelá mpe likambo ya misato: Komityela motema mpe libateli. Soki ozali kosepela na ndenge ozali, okomitungisa mingi te na ntina etali kolata ndenge basusu bazali kolata.

Libunga #3: Kokanisa ete soki ‘olati bilamba oyo ezali kobenda basheri, nde olati kitoko mpenza.’

 Elenge mwasi moko na nkombo Jennifer alobi boye: “Mpo na koloba solo, na bantango mosusu tobendamaka na kolata elamba moko oyo ezali kobenda basheri, ekoki kozala ya mokuse makasi to ekangi nzoto to ezali komonisa biteni mosusu ya nzoto oyo esengeli kobombana.”

 Toli ya malamu: Biblia elobi boye: “Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te . . . kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.” (1 Petro 3:3, 4) Nakotalela toli yango, kanisá na oyo ebendaka mpenza bato, kitoko ya kati to ya libándá.

 Toli na makambo ya kolata: Kolata kozanga kolekisa ndelo nde molato ya malamu. Toboyi te, bato mingi te nde balataka bongo. Kasi kanisá naino:

 Naino osololá te na moto oyo azali kolobaloba mingi kasi kaka makambo na ye moko? Likambo ya mawa, ekoki kozala ete moto yango azali koyeba te ete azali nde kobengana yo!

Ndenge moko na kosolola, bilamba olati ekoki ‘kobenda likebi epai na yo moko,’ mpe kobengana baoyo bazali pene na yo

 Soki olati mabe, okokóma lokola moto yango. Ndenge oyo olati, ezali lokola ozali koloba ete ‘bótala ngai,’ mpe yango ekoki kosala ete omonana lokola ozangi libateli to ozali kokipe kaka makambo na yo moko to mpe nyonso mibale. Ekoki mpe kosala ete omitungisa mpo na likebi nyonso oyo batyeli yo; ata ya mabe.

 Soki olekisi ndelo na molato na yo, ezali lokola ozali kosala piblisite ya eloko oyo ozali kotɛka te. Elenge mwasi moko na nkombo Monica alobi boye: “Kozanga kolekisa ndelo elakisi te ete olata lokola nkɔkɔ na bino. Elakisi komipesa kilo mpe komemya bato oyo ozali na bango.”