Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa ngai?​—Eteni 2: Ndenge ya kosala mpo osepela na botángi ya Biblia

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa ngai?​—Eteni 2: Ndenge ya kosala mpo osepela na botángi ya Biblia

 Elenge moko na nkombo Will, alobi boye: “Biblia ekoki kolɛmbisa yo soki oyebi te ndenge ya malamu ya kotánga yango.”

 Okosepela koyeba sekele ya kosepela na botángi ya Biblia? Lisolo oyo ekosalisa yo.

 Salá ete Makomami eloba

 Mikɔtisá na makambo ozali kotánga. Okoki kosalela mayele oyo:

  1.   Poná lisolo moko ya Biblia oyo okosepela koyekola. Okoki kopona likambo moko oyo Biblia elobeli to vɛrsɛ moko na Evanzile, to okoki kopona lisolo moko na masolo ya badrame ya botángi ya Biblia oyo ezali na jw.org.

  2.   Tángá lisolo. Okoki kotánga yango yo moko, to okoki kotánga na mongongo makasi elongo na baninga to bato ya libota. Moto moko akoki kotánga lokola mobɛti-lisolo mpe bamosusu bakoki kozwa bisika ya bato oyo lisolo yango elobeli.

  3.   Meká moko to mingi ya makanisi oyo elandi:

    •   Salá bililingi oyo ezali komonisa lisolo yango. To desiné yango; elingi koloba salá bafɔtɔ oyo ezali komonisa ndenge likambo mokomoko ezali kosalema. Tyá maloba oyo elimboli bililingi yango mpo na komonisa makambo oyo ezali kosalema na eteni mokomoko ya lisolo yango.

    •   Salá mayemi. Na ndakisa, ntango ozali kotánga lisolo ya moto moko ya sembo, yokanisá bizaleli mpe misala ya moto yango na mapamboli oyo azwaki.

    •   Kómisá lisolo yango lokola nsango oyo ozali kopesa. Salá reportage ya likambo yango na balolenge ekeseni; kɔtisá mpe “mituna-lisolo” elongo na bato oyo lisolo yango elobeli mpe batemwɛ ya likambo yango.

    •   Soki bato oyo Biblia elobeli bazwaki ekateli ya mabe, meká kokanisa ndenge mosusu oyo bakokaki kosala. Na ndakisa, talelá ndenge Petro awanganaki Yesu. (Marko 14:66-72) Ndenge nini Petro akokaki kosala malamu ntango batyaki ye mbamba?

    •   Soki omoni ete ozali na likoki ya kobimisa likambo mosusu ya sika, meká kokoma drame na yo moko oyo euti na lisolo moko ya Biblia. Tyá mpe mateya oyo okoki kozwa na lisolo yango.​—Baroma 15:4.

      Okoki kosala ete masolo ya Biblia emonana lokola ezali kosalema sikoyo!

 Salá bolukiluki!

 Soki otaleli makambo mikemike, okoki komona biloko ya motuya oyo ebombani na lisolo moko. Kutu, na bantango mosusu kaka liloba moko to mibale na Biblia elobaka mingi.

 Na ndakisa, talá Matai 28:7 mpe Marko 16:7.

  •    Mpo na nini Marko abakisi maloba ete Yesu akomonana na bayekoli “mpe Petro”?

  •  Likanisi: Marko amonaki na miso te makambo yango; emonani ete Petro nde apesaki ye nsango yango.

  •  Eloko ya motuya oyo ebombani: Mpo na nini motema ya Petro ekitaki ntango ayokaki ete Yesu azalaki na mposa ya komona ye lisusu? (Marko 14:66-72) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki moninga ya solosolo ya Petro? Ndenge nini okoki komekola Yesu mpe kozala moninga ya solosolo mpo na basusu?

 Soki osali ete Makomami eloba mpe osali bolukiluki na makambo mikemike, okosepela mingi lisusu na botángi ya Biblia!