Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa ngai?​—Eteni 1: Luká koyeba Biblia na yo

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa ngai?​—Eteni 1: Luká koyeba Biblia na yo

 “Namekaki kotánga Biblia, kasi elɛmbisaki ngai mpo ezali monene!”​—Briana, 15.

 Omiyokaka mpe bongo? Lisolo oyo ekoki kosalisa yo!

 Mpo na nini kotánga Biblia?

 Omonaka ete kotánga Biblia elɛmbisaka yo? Soki bongo, tomitye na esika na yo. Okoki kozwa Biblia kaka lokola mwa buku moko ya nkasa ebele oyo ezangá bafɔtɔ mpe malamu kutu otala na yo televizyo to bavideo!

 Sikoyo, kanisá naino: Soki omoni sanduku moko monene ya kala oyo ezali na biloko ya valɛrɛ na kati, okolinga te koyeba biloko oyo ezali na kati?

 Biblia ekokani na sanduku ya ndenge wana. Ezali na biloko mingi ya valɛrɛ to bwanya oyo ekosalisa yo

  •   Ozwa bikateli ya malamu

  •   Oyokana malamu na baboti na yo

  •   Ozwa baninga ya malamu koleka

  •   Olonga mitungisi

 Ndenge nini buku ya kala ndenge wana ekoki kosalisa biso lelo oyo? Ezali mpo “makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Elingi koloba batoli ya Biblia euti na esika ya malamu koleka.

Biblia ezali sanduku ya biloko ya valɛrɛ oyo ezali na bwanya oyo ekoki kosombama te

 Ndenge nini nasengeli kotánga Biblia?

 Likambo ya liboso ezali ya kotánga yango na mobimba. Yango ekosalisa yo oyeba na mokuse nsango ya Biblia. Ezali na ndenge mingi ya kotánga Biblia. Tótalela bandakisa mibale:

  •    Okoki kotánga mikanda 66 ya Biblia na molɔngɔ, kobanda Ebandeli tii Emoniseli.

  •    Okoki kotánga Biblia na kolanda ndenge makambo elandanaki; elingi koloba ndenge makambo esalemaki mpenza.

 Toli: sgd eteni 4 etángi na molɔngɔ ndenge makambo etali bomoi ya Yesu awa na mabele elandanaki.

 Likambo ya mibale ezali kopona lisolo moko oyo eyokani na mokakatano ozali na yango. Na ndakisa:

  •   Okosepela kozwa baninga oyo okoki kotyela motema? Tángá lisolo ya Yonatane ná Davidi. (1 Samwele, mokapo 18-20) Na nsima, salelá lokasa mpo na bilenge “Ndenge ya kozwa baninga ya solosolo” mpo ozwa liteya na lisolo yango.

  •   Okosepela kokómisa makasi likoki na yo ya kotɛmɛla komekama? Tángá lisolo etali ndenge Yozefe atɛmɛlaki komekama. (Ebandeli, mokapo 39) Na nsima, salelá nkasa mpo na bilenge “Ndenge ya kolonga komekama . . . Yozefe​—Eteni 1” mpe “Bakoselaki ye makambo! Yozefe​—Eteni 2” mpo ozwa liteya na lisolo yango.

  •   Okosepela koyeba ndenge libondeli ekoki kosalisa yo? Tángá lisolo ya Nehemia. (Nehemia, mokapo 2) Na nsima, salelá lokasa mpo na bilenge “Nzambe ayanolaki na libondeli na ye” mpo ozwa liteya na lisolo yango.

 Toli: Liboso otánga Biblia, omindimisa ete ozali esika ya makelele te mpo makanisi eyengayenga te.

 Likambo ya misato ezali ya kopona lisolo to mokapo moko ya mokanda ya Nzembo, kotánga yango mpe na nsima kotalela ndenge oyo ekoki kosalisa yo. Nsima ya kotánga, omituna boye:

  •    Mpo na nini Yehova atye yango na Biblia?

  •    Emonisi nini mpo na bizaleli ya Yesu to ndenge na ye ya kosala makambo?

  •    Ndenge nini nakoki kosalela makambo oyo na bomoi na ngai?

 Toli: Salelá Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli na Anglais mpo omona bavideo, bakarte mpe makambo mosusu oyo ekosalisa yo ozwa matomba na botángi na yo ya Biblia.