Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kokitisa kilo na ngai?

Ndenge nini nakoki kokitisa kilo na ngai?

 Nazali mpenza na mposa ya kokitisa kilo na ngai?

 Bilenge mosusu balobaka ete bazali na mposa ya kokitisa kilo na bango. Nzokande . . .

  •   Bato mingi bámitungisaka mpo na ndenge bazali komonana na esika bámitungisa mpo na sante na bango. Mpo na kokitisa kilo, basusu basalelaka basolisyo ya mbangumbangu, na ndakisa koboya kolya, to komɛla bankisi oyo ekondisaka moto. Mayele ya ndenge wana na bantango mosusu esimbaka te mpe ebimisaka likama.

     “Bilenge basi mosusu balingaka kofanda nzala mpo bákitisa kilo na bango noki. Na bantango mosusu ebebisaka sante na bango, mpe na nsima esɛngaka ntango mingi mpo sante na bango ezonga malamu.”​—Hailey.

  •   Bato mingi bámitungisa kaka mpamba mpo na kilo na bango. Bazali na kilo ya malamu, kasi mbala mosusu soki bamikokanisi na bilenge mosusu to na bato oyo bamonaka na televizyo, bamimonaka lokola baleki monene.

     “Ntango nazalaki na mbula 13, namikokanisaki na baninga na ngai. Nakanisaki ete bakolinga ngai mingi lisusu soki nakokani na bango na nzoto​—yango elingaki koloba ete nasengelaki kozala moke mpenza.”​—Paola.

 Nzokande, ezali na bilenge mosusu oyo basengeli mpenza kokitisa kilo na bango. Ndenge lapolo ya ebongiseli moko oyo etalaka bokolongono ya nzoto emonisi yango . . .

  •   Na mokili mobimba, soki 340 milio ya bilenge oyo bazali na mbula kobanda 5 tii 19 bazali na kilo mingi mpenza.

  •   Na 1975 kaka 4% ya bilenge oyo bazali na mbula kobanda 5 tii 19 bazalaki na kilo mingi mpenza. Na 2016 motángo na bango ebakisamaki mpe ekómaki 18%.

  •   Na bikólo mingi na mokili mobimba, bato ya minene bakómi mingi koleka bato ya nzoto mike.

  •   Bato ya minene bakómi mingi ezala mpe na mikili ya bobola, ata na mabota oyo bato balyaka malamu te.

 Wapi lolenge eleki malamu mpo na kokitisa kilo?

 Likanisi nini okosepela kopona?

  1.   Kolyaka mpambampamba te.

  2.   Kosala ngalasisi mpe kopona bilei.

  3.   Komɛla nkisi oyo ekitisaka kilo.

 Eyano ya malamu: Likanisi 2: Kosala ngalasisi mpe kopona bilei.

 Kolyaka mpambampamba te to koboya bilei mosusu ekoki kokitisa kilo noki. Kasi yango ezali malamu mingi te mpo na sante na yo, mpe okoki kozongela kilo na yo kaka soki ozongeli ndenge ozalaki kolya liboso.

 Lisusu, soki ozali na mposa ya kozala na sante malamu, osengeli komiyoka mpe ete ozali malamu. Doktɛrɛ Michael Bradley akomi boye: “Mpo olonga kokitisa kilo na yo na ndenge ya malamu mpe oyo ebongi mpenza osengeli . . . kokóma na momeseno ya sika na bomoi na yo mpe kokangama na momeseno yango na bomoi na yo mobimba.” a Elingi koloba: Soki olingi kokitisa kilo na yo, kokanisa kaka te likambo ya kolandela bilei kasi osengeli nde kobongola mimesano ya bomoi na yo.

 Oyo nakoki kosala

 Biblia esɛngi biso tózala bato “oyo balekisaka ndelo te”​—yango etali mpe momeseno na biso ya kolya. (1 Timote 3:11) Elobi mpe polele koboya kolya mingi koleka ndelo. (Masese 23:20; Luka 21:34) Wana ozali kokanisa toli yango, meká kosalela makanisi oyo elandi mpo okóma na bomoi ya malamu:

  •   Luká koyeba soki kolya malamu esɛngi nini.

     Kotingama kaka te na bilei oyo olingaka, kozala na mwa boyebi na makambo etali biloko ya kolya ekoki mpenza kosalisa yo olekisa ndelo te. Mpe kolya na ndenge ebongi ezali moko ya makambo oyo ekosalisa yo obatela kilo na yo ya nzoto.

  •   Saláká ngalasisi mbala na mbala.

     Kanisá makambo oyo okoki kosala mokolo na mokolo mpo okoba kozala na molende. Na ndakisa, na esika ya komata na ascenseur, salelá eskalye mpo na komata na etaje. Tambolá na makolo miniti 30 na esika ya kolekisa yango na kobɛta masano ya video.

  •   Lyáká bilei oyo etongaka nzoto na esika ya kolya oyo etongaka te.

     Elenge mwasi moko na nkombo Sophia alobi boye: “Nasalaka makasi nazala ntango nyonso na mwa biloko ya mikemike oyo etongaka nzoto na ndakisa mwa ndunda mpe bambuma. Yango esalisaka ngai na kokwea te na motambo ya kolya bilei oyo etongaka nzoto te.”

  •   Kolyaka mbangumbangu te.

     Mpo na kolya mbangumbangu bato mosusu bayebaka te ete libumu na bango esí etondi! Yango wana kolyaka mbangumbangu te. Lekisáká mwa ntango liboso olya bilei mingi. Okoki komona ete ozali mpenza na nzala te ndenge ozali kokanisa.

  •   Zalá ekɛngɛ na biloko ya sukali oyo ozali kolya.

     Tángá makambo oyo bakomi na pakɛ ya biloko ya kolya mpo na koyeba soki biloko yango ezali na sukali mingi to moke. Na ndakisa: masanga ya sukali, bilei basí balambi na restora, mpe biloko mosusu ya sukali ekoki noki kobakisa sukali na nzoto mpe kilo.

  •   Kolekisa ndelo te.

     Sara oyo azali na mbula 16, alobi: “Na ntango moko boye nakómaki kolandela mingi makambo etali sukali na biloko, tii ekómaki soki nazali kolya nazalaki kaka koluka kolandela soki sukali ezali mingi to moke na bilei oyo nazali kolya! Nakómaki lokola moto oyo alandelaka makambo etali sukali na kati ya biloko. Na bantango mosusu okoki kolya bilei ya kitoko ata soki ezali na sukali mingi.

 Toli: Yebisá doktɛrɛ na yo ndenge ozali komitungisa mpo na kilo na yo. Akoki kolandela yango mpe kosalisa yo na toli mpo okóma na momeseno ya malamu oyo ekoki kosalisa yo.

a Euti na buku When Things Get Crazy With Your Teen.