Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki bazali kotumola ngai na nzela ya Internet?

Nasala nini soki bazali kotumola ngai na nzela ya Internet?

 Oyo osengeli koyeba

 Internet esalaka ete kotumola basusu ezala mpasi te. Buku moko CyberSafe elobi: “Etindaka kutu bana malamu básala basusu mabe mpo esɛngaka te kolakisa elongi.”

 Batumolaka bato mosusu mingi koleka. Na ndakisa baoyo bazalaka nsɔninsɔni, bamonanaka ndenge mosusu, to bamonaka ete bazali na ntina te.

 Matumoli na nzela ya Internet esalaka mabe mpenza. Ekoki kotinda moto amiyoka lokola azali ye moko, atungisama na makanisi; etindá kutu basusu na komiboma.

 Oyo okoki kosala

 Ya liboso, omituna boye: ‘Ezali mpenza matumoli?’ Na bantango mosusu bato balobaka makambo ya mabe oyo bakanaki mpenza te. Soki esalemi bongo, tokoki kolanda toli oyo ya Biblia:

 “Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.”​—Mosakoli 7:9.

 Kasi, soki moto moko azali kotungisa, kokitisa, to kotumola moto mosusu na nko na nzela ya Internet, wana ezali matumoli.

 Soki bazali kotumola yo na nzela ya Internet, kobosana te likambo oyo: Ndenge oyo okosala ekoki kobongisa to ekobebisa nde makambo. Meká kosalela toli to batoli oyo elandi.

 Kokipe moto yango te. Biblia elobi: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi, mpe moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.”​—Masese 17:27.

 Ntina oyo esalaka ete toli yango esimba: Na buku na ye (Cyberbullying and Cyberthreats) Nancy Willard akomi boye: “Mokano ya libosoliboso ya baoyo batumolaka bato ezalaka ya kosilikisa moto oyo bango bazali kotumola. Soki moto yango asiliki, bazwaka sikoyo libaku ya kosakana na mayoki na ye.”

 Na mokuse: Na bantango mosusu kofanda nyɛɛ ezalaka malamu koleka.

 Boyá kozongisa mabe na mabe. Biblia elobi: “Bózongisaka mabe na mabe te to kofinga na kofinga te.”​—1 Petro 3:9.

 Ntina oyo esalaka ete toli yango esimba: Buku moko (Cyber-Safe Kids, Cyber-Savvy Teens), elobi boye: “Nkanda ebimisaka bolɛmbu ya moto polele mpe esalaka kutu bátumola ye mingi lisusu.” Kozongisa mabe na mabe mpe ekoki komonisa lokola yo mpe otumolaka bato.

 Na mokuse: Kopelisa lisusu mɔtɔ te.

 Kanisá oyo okosala. Biblia elobi: “Kotika mabe elonga yo te.” (Baroma 12:21) Ezali na makambo okoki kosala mpo bátika kotumola yo kozanga ete opelisa lisusu mɔtɔ.

 Na ndakisa:

  •    Tyá moto yango na liste noire. Buku moko (Mean Behind the Screen), elobi: “Makambo oyo otángi te ekoki kosala yo mabe te.

  •   Bombá makambo nyonso akomeli yo, ata soki otángi yango te. Ekoki kozala bamesaje ya mabe, bamesaje oyo batindelanaka mbala moko, ba-email, bamesaje oyo batyaka na basite ya kosolola na bato, bamesaje ya kokɔtisa mongongo, to masolo nyonso mosusu.

  •   Yebisá ye atika kotumola yo. Tindelá ye mesaje oyo emonisi ete ozali kobondela ye te, kasi na nkanda te, na ndakisa:

    •  “Kotindela ngai lisusu bamesaje te.”

    •  “Longolá makambo oyo outi kotya.”

    •  “Soki otiki te, nakozwa bibongiseli mosusu mpo likambo yango esuka.”

  •   Kómá komityela motema. Talá nde makoki na yo na esika ya kotala bolɛmbu na yo. (2 Bakorinti 11:6) Ezala baoyo batumolaka basusu na miso boye to na nzela ya Internet, bango nyonso basalaka yango nde epai ya moto oyo bango bamoni ete akosala bango eloko te.

  •   Yebisá mokóló moko. Yebisá liboso baboti na yo. Okoki mpe koyebisa likambo yango na site oyo moto yango azali kosalela. Soki ezali likambo monene, yo ná baboti na yo bosengeli koyebisa bakonzi ya eteyelo likambo yango, koyebisa bapolisi, to koluka toli epai ya bato oyo bayebi mibeko.

 Na mokuse: Ezali na makambo oyo okoki kosala mpo moto yango atika kotumola yo to matumoli na ye ekita.