Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?

Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?

 “Makanisi ya kosangisa nzoto eyelaka ngai na mbalakaka mpe nakómaka kokanisa kaka yango. Ezalaka lokola nde moto mosusu azali kotambwisa makanisi na ngai.”​—Vera.

 “Kobengana makanisi ya kosangisa nzoto ezali mpasi koleka kobɛtabɛta mabɔkɔ na elikya ya kopumbwa lokola ndɛkɛ.”​—John.

 Omiyokaka lokola Vera ná John? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

 Mpo na nini ezali na ntina?

 Elenge moko na nkombo Alex, alobi boye: “Noko ayebisaki ngai ete soki Nzambe alingaka te ete nakokisa mposa ya kosangisa nzoto, alingaki kotya yango te na nzoto na ngai.”

 Na makambo oyo noko ya Alex alobi, ndambo ezali solo​—Soki Nzambe atyá mposa yango na nzoto ya moto, ezali na ntina. Lelo oyo soki bato bazali mingi na mokili ezali mpo na likoki ya kobota. Soki bongo, mpo na nini osengeli kobengana makanisi ya kosangisa nzoto? Ezali mpo na bantina oyo mibale:

  •   Biblia eteyaka ete kaka mwasi ná mobali oyo babalaná nde basengeli kosangisa nzoto.​—Ebandeli 1:28; 2:24.

     Soki otosaka mibeko ya Nzambe mpe ozali monzemba, kofandisa makanisi ya kosangisa nzoto na bɔɔngɔ na yo, ekoki kokómisa yo nkandankanda. Ekoki kutu kotinda yo otikela mposa yango nzela to osangisa mpenza nzoto; likambo oyo bato mingi balobi ete bayokaka mabe ndenge basalaki yango.

  •   Koyeba ndenge ya kobengana makanisi ya kosangisa nzoto ekosalisa yo okóma na ezaleli ya komipekisa, ezaleli oyo ekosalisa yo na makambo mingi na bomoi na yo.​—1 Bakorinti 9:25.

 Komipekisa ekosalisa yo ozala na bomoi malamu sikoyo mpe na mikolo ekoya. Kutu, ankɛtɛ moko emonisi ete bana oyo bazalaka na ezaleli ya komipekisa, bazalaka na mikakatano mingi te ya sante, bamitungisaka mingi te mpo na mbongo mpe bazalaka na makambo ná Leta te ntango bakómi mikóló. a

 Mpo na nini ezalaka mpasi mpenza?

 Ba-hormone​—bakisá mpe mokili oyo bato balingá makambo ya kosangisa nzoto esalaka ete ezala mpasi kobengana makanisi ya kosangisa nzoto.

 “Baprograme ya televizyo emonisaka ete ezali mabe te kosangisa nzoto na moto oyo bobalani na ye te mpe ezali na likama moko te. Ezalaka mpasi te kofandisa makanisi mabe na motó soki bazali kolakisa ete kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi te ezali na likama moko te.”​—Ruth.

 “Na mosala, nayokaka maloba ya nsɔni oyo etali kosangisa nzoto mpe yango etindaka ngai naluka koyeba yango. Lokola bato bamonaka mabe te kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi te, yango wana ezalaka mpasi komona yango mpe mabe.”​—Nicole.

 “Ezalaka pɛtɛɛ kotika kozala ekɛngɛ ntango ozali kotala bafɔtɔ na basite ya kosolola na baninga. Ekoki kozala mpasi mpenza kobosana fɔtɔ moko ya mabe oyo otalaki!”​—Maria.

 Makambo lokola oyo wana ekoki kotinda yo omiyoka ndenge ntoma Paulo amiyokaki. Akomaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.”​—Baroma 7:21.

Kopesa nzela te ete makanisi mabe esala zumbu na motó na yo

 Oyo okoki kosala

 Tyá makanisi na makambo mosusu. Meká kotya makanisi na makambo mosusu na esika ya kokanisa makambo etali kosangisa nzoto. Okoki kokanisa makambo lokola: kozwa mwa mopɛpɛ, kosala masano to ngalasisi to likambo mosusu nyonso oyo esepelisaka yo. Elenge moko na nkombo Valerie, alobi boye: “Kotánga Biblia esalisaka ngai. Ezali na makanisi ya Nzambe mpe ntango ozali kokanisa makambo ya Nzambe, ekozala mpasi okanisa makambo mosusu.”

 Toboyi te, makanisi ya kosangisa nzoto ekoki koyela yo. Kasi yo moko nde okopona ndenge ya kosala soki eyeli yo. Soki olingi, okoki kobengana makanisi yango.

 “Soki nabandi kokanisa makambo ya kosangisa nzoto, natyaka makanisi na ngai na makambo mosusu. Nalukaka mpe koyeba nini esali ete nakanisa makambo yango; na ndakisa soki ezali nzembo moko to fɔtɔ, nalongolaka yango na liste na ngai.”​—Helena.

 Toli ya Biblia: “Makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, . . . bókoba kokanisa makambo wana.”​—Bafilipi 4:8.

 Poná baninga ya malamu. Soki baninga na yo balobelaka ntango nyonso makambo etali kosangisa nzoto, ekozala mpasi otika kokanisa makambo yango.

 “Ntango nazalaki elenge, ezalaki mpasi mpenza natika kokanisa makambo ya mabe mpe baninga na ngai nde bazalaki kosala ete ekómela ngai lisusu mpasi koleka. Soki olekisaka ntango elongo na bato oyo bamonaka ete kosala makambo ya mbindo ezali mabe te, okoyeba te ndenge ya komipekisa mpe yango ekobebisa nde lisusu makambo.”​—Sarah.

 Toli ya Biblia: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”​—Masese 13:20.

 Boyá kotala bafilme to koyoka miziki oyo ebongi te. Eyebani polele ete makambo ya kosangisa nzoto ezangaka te na bafilme to na miziki oyo toyokaka. Nicole, alobi boye: “Mpo na ngai, miziki nde mokakatano monene. Ekoki kolamwisa mposa na ngai mpe kosala ete ekóma mpasi namipekisa.”

 “Nabandaki kotala bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo oyo ezalaki kolakisa makambo ya kosangisa nzoto. Liboso nayeba yango, nakómaki kokanisa mingi makambo ya kosangisa nzoto. Ezalaki mpasi te nayeba esika makanisi yango ezalaki kouta. Ntango kaka natikaki kotala makambo yango, nazalaki lisusu kokanisa makambo yango mingi te. Ezalaka pɛtɛɛ nabengana makanisi ya mabe soki nazali kopona filme to miziki ya koyoka.”​—Joanne.

 Toli ya Biblia: “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino.”​—Baefese 5:3.

 Na mokuse: Bato mosusu bakanisaka ete mposa na bango ya kosangisa nzoto ezali na ntina mingi, yango wana bakoki kopekisa yango te. Kasi Biblia elobi bongo te. Epesi biso lokumu ndenge elobi ete tokoki kopekisa makanisi na biso.

 Toli ya Biblia: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.”​—Baefese 4:23.

a Komipekisa ezalaka mpe na ntina mpo na baoyo babalá​—yango mpe ntina mosusu ya kokóma na ezaleli yango ntango ozali monzemba.