Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini koboya kotala porno?

Mpo na nini koboya kotala porno?

 Okokoka mpenza kosala yango?

 Soki osalelaka Internet, yebá ete ata ndɛlɛ okomona bililingi ya porno. Hayley, elenge moko ya mbula 17, alobi boye: “Esɛngaka lisusu te oluka yango. Yango nde ekoluka yo.”

 Porno ekoki kokweisa ata baoyo bazwá ekateli ya kokima yango. Greg, elenge moko ya mbula 18, alobi boye: “Nalobaki ete nakozala ntango nyonso ekɛngɛ, kasi nakweaki kaka. Okoki te koloba ete ekokómela yo te.”

 Lelo oyo, ezali lisusu mpasi te kokutana na bililingi ya porno. Mpe lokola bato bakómi mpe kotindelana bililingi ya porno na telefone, bilenge mingi bakómi kosala porno na bango mpe kotindela yango basusu.

 Na mokuse: Ozali na likama mingi koleka oyo baboti mpe bankɔkɔ na yo bazalaki na yango ntango bazalaki na mbula na yo. Motuna yango oyo: Okokoka mpenza koboya kotala porno?​—Nzembo 97:10.

 Eyano ezali ɛɛ, kasi yo moko osengeli kozwa ekateli ya koboya yango. Kasi, libosoliboso, osengeli koyeba ete porno ezali mabe. Tótalela mwa makanisi ya bato mpo na likambo yango mpe makambo oyo ezali solo.

 Makanisi ya bato mpe makambo ya solo

 Makanisi ya bato: Porno ekosala ngai mabe te.

 Likambo ya solo: Porno ebebisaka bɔɔngɔ ndenge likaya ebebisaka mimpululu to ba poumons. Ekokómisa yo mbindo. Ebebisaka libala, boyokani kati na bato mibale oyo Nzambe abongisaki ete ezala makasi mpe eumela. (Ebandeli 2:24) Nsima ya mikolo, ekoki ata kotinda yo oyeba lisusu te kokesenisa malamu ná mabe. Na ndakisa, bato mosusu ya mayele balobi ete mibali oyo batalaka porno mingi bandimaka likambo ya konyokola basi.

  Biblia elobi ete ezali na bato oyo “babungisá bizaleli nyonso ya malamu.” (Baefese 4:19) Lisosoli na bango ekufá mpe bayokaka lisusu mpasi te ntango bazali kosala mabe.

 Makanisi ya bato: Porno ekoki kolakisa ngai makambo ya kosangisa nzoto.

 Likambo ya solo: Porno ekolakisa yo kozala lokoso. Ekotinda yo okóma komona bato lokola mwa eloko mpamba mpe bazali wana kaka mpo na kokokisa bamposa na yo. Yango wana, ankɛtɛ moko oyo esalemaki emonisaki ete bato oyo batalaka porno bazalaka mpenza na esengo te na libala na bango na likambo etali kosangisa nzoto.

  Biblia elobi ete bakristo basengeli koboya “pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi”​—makambo oyo porno elendisaka.​—Bakolose 3:5.

 Makanisi ya bato: Bato oyo baboyaka porno bazali makambo makasi na oyo etali kosangisa nzoto.

 Likambo ya solo: Bato oyo baboyaka porno batalelaka makambo ya kosangisa nzoto na ndenge oyo ebongi. Bamonaka ete ezali likabo oyo Nzambe apesá mwasi ná mobali oyo babalani mpe balapani ndai. Bato oyo batalelaka makambo ndenge wana, bazalaka na esengo mingi na makambo ya kosangisa nzoto soki babali.

  Biblia elobeli polele makambo ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, elobi na mibali ete: “Sepelá na mwasi ya bolenge na yo . . . Bolingo na ye elangwisa yo ntango nyonso.”​—Masese 5:18, 19.

 Ndenge ya koboya kotala porno

 Okosala nini soki komekama ya kotala porno ezali mpenza makasi? Lokasa “Ndenge ya koboya kotala porno” ekoki kosalisa yo.

 Yebá ete okoki kotɛmɛla mposa ya kotala porno. Okoki mpe koyekola ndenge ya kotika kotala porno soki obandá kotala yango. Okozwa matomba mingi soki osali bongo.

 Tózwa ndakisa ya Calvin, oyo azalaki na momeseno ya kotala porno ntango azalaki na mbula 13. “Calvin alobi boye: “Nayebaki ete ezali mabe, kasi nazalaki kokoka kotika te. Mpe nsima ya kotala porno, nazalaki koyoka mabe mpenza. Mokolo moko, papa akangaki ngai, mpe mpo na koloba solo, nayokaki motema ekiti! Nsukansuka, nazwaki lisalisi oyo esengeli.”

 Calvin ayekolaki kotika kotala porno. Alobi boye: “Nasalaki libunga monene ndenge nakómaki kotala porno, mpe tii lelo nakokaka kolongola bililingi yango na makanisi na ngai te. Mpe na bantango mosusu, soki nazali kotala biloko oyo nasengeli kotala te, namitunaka soki nakoya komona te bililingi ya mabe. Kasi namonaka ete soki nazali kosala makambo ndenge Yehova alingaka, nakozala na bomoi ya esengo, ya pɛto mpe ya malamu.”