Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?​—Eteni 2: Mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?​—Eteni 2: Mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?

Alex asili mayele. Banda kala, andimaka ete Nzambe azali mpe ete ye nde akelá biloko nyonso. Kasi sikoyo, molakisi na bango ya liteya ya bioloji azali komonisa na mpiko ete bomoi ebimá yango moko, mpe ete makambo oyo bato ya siansi bayekoli emonisi yango. Alex aboyi kobima zoba na miso ya bato. Na nse ya motema, alobi: ‘Soki bato ya siansi kutu bamonisi ete bomoi ebimá yango moko, ngai nani mpo naboya kondima yango?’

 Osilá kokutana na likambo ya ndenge wana? Mbala mosusu ondimaka banda kala likambo oyo Biblia elobi ete “Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Kasi sikoyo, bato balingi okóma kondima ete bomoi ekelamá te, kasi ebimá yango moko. Osengeli kondimela bango? Mpo na nini koboya kondima liteya ya evolisyo?

 Ntina mibale ya koboya kondima liteya ya evolisyo

  1.   Bato mosusu ya siansi bandimaka evolisyo te. Atako bato ya siansi basali bolukiluki bambula ebele, babimisi naino te bandimbola oyo bango nyonso bandimi na oyo etali evolisyo.

     Kanisá naino: Soki bato mosusu ya siansi bandimaka liteya ya evolisyo te​—bango kutu bato ya mayele—​okosala libunga soki oboyi kondima likanisi yango?​—Nzembo 10:4.

  2.   Likambo oyo ondimaka ezali na ntina. Elenge moko na nkombo Zachary alobi ete: “Soki bomoi ebimá kaka yango moko, boye bomoi na biso​—mpe biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́—​ezali na ntina te.” Alobi solo. Mpo soki liteya ya evolisyo ezali solo, boye bomoi ezali na ntina moko te. (1 Bakorinti 15:32) Nzokande, soki bomoi ekelamá, tokoki kozwa biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na bomoi mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.​—Yirimia 29:11.

     Kanisá naino: Ndenge nini koyeba ete liteya ya evolisyo ezali lokuta mpe ete bomoi ekelamá ekoki kobongola bomoi na yo?​—Baebre 11:1.

 Makambo ya kotalela

 LIKANISI YA BATO: ‘Eloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ebimá kaka boye, na pwasa.’

  •   Nani to nini esalá ete biloko yango ebimá na pwasa?

  •   Ebongi mpenza kondima nini: ete biloko nyonso ebimá na pwasa, to ete eloko to moto moko nde asalá biloko nyonso?

 LIKANISI YA BATO: ‘Moto autá na nyama.’

  •   Soki moto autá na nyama​—na ndakisa makako—​mpo na nini mayele ya moto eleki mosika mpenza mayele ya makako? a

  •   Mpo na nini ata bikelamu ya mikemike mpenza ekamwisaka biso mingi? b

 LIKANISI YA BATO: ‘Ezali na makambo oyo emonisi ete evolisyo ezali solo.’

  •   Moto oyo alobi bongo, ye moko atalelaki makambo yango?

  •   Bato mingi bandimaka likanisi ya evolisyo kaka mpo bayebisá bango ete bato nyonso ya mayele bandimaka yango!

a Bato mosusu balobaka ete bato bazali mayele koleka makako mpo bazali na bɔɔngɔ ya monene koleka. Mpo na komona ete likanisi wana ezangá motó na makolo, talá mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, lokasa 28.

b Talá mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, nkasa 8-12.