Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Makambo nini nasengeli koyeba mpo na bamesaje?

Makambo nini nasengeli koyeba mpo na bamesaje?
  • :-) Soki osaleli yango malamu, bamesaje ekoki kosalisa yo ozwaka nsango ya basusu.

  • :-( Soki osaleli yango mabe, ekoki kokabola yo ná baninga na yo, mpe kobebisa lokumu na yo.

Lisolo oyo elobeli makambo oyo osengeli koyeba mpo na

Na kati, okokuta mpe

 Bato oyo okomelaka

 Bilenge mingi bamonaka ete bamesaje ezali lolenge moko ya malamu mingi ya kosolola na bato. Mesaje ekosalisa yo ozwaka nsango ya bato nyonso oyo bazali na kati ya telefone na yo, soki baboti na yo bandimi.

 “Papa alingaka te ngai ná leki na ngai ya mwasi tósolola na bana mibali. Soki tolingi tósolola na bana mibali, malamu tóbenga bango na telefone, na “salon” esika bato mosusu bazali.”​—Lenore.

 Makambo osengeli koyeba: Soki ozali kopesa moto nyonso nimero na yo ya telefone, ekoki kobendela yo mindɔndɔ.

 “Soki oyebi te banani bazali na nimero na yo, okozwa bamesaje mpe bililingi mosusu oyo okosepela na yango te.”​—Scott.

 “Soki bokomelanaka bamesaje mpambampamba na moto oyo azali molongani na yo te, ekoumela te mpo bókóma kolingana.”​—Steven.

 Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Soki omityeli mwa mibeko, ekobatela yo mingi.

 Likambo oyo esalemá: “Mwana mobali moko azalaki moninga na ngai, mpe tozalaki kokomelana bamesaje mingi. Nazalaki komona ete tozali kaka baninga. Nazalaki komona yango likambo te tii mokolo moko ayebisaki ngai ete alingaka ngai. Soki nakanisi, namonaka ete nasengelaki te kolekisaka na ye ntango mingi ndenge wana, kokomela ye ntango nyonso, ndenge nazalaki kosala.”​—Melinda.

 Omituna boye: Okanisi nini, boninga ya Melinda ná mwana mobali wana ekómaki ndenge nini ntango ayebisaki ye ete alingaka ye?

 Kanisá lisusu: Melinda akokaki kosala nini mpo ye ná mwana mobali wana bázala baninga kozanga ete mwana mobali yango azwa makanisi mosusu?

 Makambo oyo okomaka

 Lokola kotinda mesaje ezalaka mpasi te mpe kozwa mesaje ezalaka esengo, tokoki kobosana ete moto oyo azali kotánga akoki kozwa yango ndenge mosusu.

 Makambo osengeli koyeba: Mesaje oyo okomi ekoki kopesa moto likanisi mosusu.

 “Na mesaje okoki koyeba te ndenge moto azali koyoka mpe okoyoka mongongo na ye te, ata soki bililingi ezali. Yango ekoki kotinda moto azwa makanisi mosusu.”​—Briana.

 “Nayebi bana basi oyo babebisá lokumu na bango mpe bayebani ete balingaka mibali mpo na bamesaje oyo batindelaki bana mibali.”​—Laura.

 Biblia elobi: “Moto ya sembo akanisaka liboso ya kopesa eyano.” (Masese 15:28, Bible na Lingala ya lelo oyo) Elimboli nini? Tángá lisusu mesaje oyo okomi liboso ofina na elembo ya “Tindá”!

 Ntango ozali kokoma

 Soki osaleli mayele ya bomoto, okoki komityela mibeko mpo na kokoma bamesaje; ekomonisa ete ozali na bonkonde.

 Makambo osengeli koyeba: Soki ozali kokoma kozanga bonkonde, bato bakomona ete ozangá bonkonde mpe baninga bakokima yo.

 “Ezalaka mpasi te kozanga bonkonde ntango ozali kokoma. Ekómelaka ngai nakomela moto mesaje ntango nazali kosolola na bato mosusu, mpe nazali kolya.”​—Allison.

 “Ezali likama kokoma mesaje ntango ozali kotambwisa motuka. Soki olongoli miso na nzela, okoki kosala aksida.”​—Anne.

 Biblia elobi: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:1, 7) Maloba yango etali koloba, ata mpe kokoma bamesaje!

 Mwa batoli

Bato oyo okokomela

  •  ;-)Landá malako ya baboti na yo.​—Bakolose 3:20.

  •  ;-)Ponáká bato ya kopesa nimero na yo. Soki oyekoli koboya na mayele koyebisa moto makambo na yo, ata mpe nimero na yo ya telefone, ezaleli yango ekosalisa yo ntango okókoma mokóló.

  •  ;-)Ata soki omesani na moto kotindelaka ye te bamesaje oyo ekomonisa lokola ozali kolula ye. Soki otindi moto akolisa lolango, okoluka mindɔndɔ mpe okonyolola motema na ye.

 “Nasalaki nyonso mpo baboti na ngai bátyela ngai motema: bayebi ete nasalelaka telefone malamu, naponaka bato oyo nakobakisa nimero na bango na telefone na ngai.”​—Briana.

Makambo oyo okokoma

  •  ;-)Liboso obanda kokoma mesaje, omituna boye: ‘Mpo na likambo oyo, ebongi nde nakoma mesaje?’ Ekoki koleka malamu kobenga moto yango to kozela bókutana.

  •  ;-)Kokoma te likambo oyo okokoka te koloba liboso na ye. Sarah, oyo azali na mbula 23 alobi: “Soki okokoka koloba yango liboso na ye te, kokoma yango mpe na mesaje te.”

 “Soki moto atindeli yo bililingi oyo osepeli na yango te, yebisá baboti na yo. Yango ekobatela yo mpe ekotinda baboti bátyela yo motema.”​—Sirvan.

Ntango ya kokoma

  •  ;-)Yebá malamu na bantango nini okosalela telefone na yo te. Elenge mwasi moko na nkombo Olivia alobi boye: “Nazalaka na telefone te ntango tozali kolya to ntango nazali koyekola. Nakangaka yango ntango nazali na makita mpo motema etinda ngai te natala yango.”

  •  ;-)Zalá na limemya epai ya basusu. (Bafilipi 2:4) Kokomaka bamesaje te ntango ozali kosolola na moto mosusu.

 “Namityelaka mibeko; na ndakisa nakomelaka bato bamesaje te soki nazali elongo na baninga, lobá kaka soki ezali likambo ya ntina mingi. Napesaka mpe nimero na ngai kaka na bato oyo tomesaná.”​—Janelly.