Nzembo 55:1-23

  • Libondeli ya moto oyo moninga atɛki ye

    • Moninga atumoli ye (12-14)

    • “Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo” (22)

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile.* Ya Davidi. 55  Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai,+Mpe kosala te lokola oyoki te ntango nazali kosɛnga yo oyokela ngai mawa.*+   Tyelá ngai likebi mpe yanolá ngai.+ Motungisi na ngai ezali kosala ete nazanga kimya,+Mpe nabulungani mpenza   Mpo na maloba ya mongunaMpe ndenge moto mabe azali konyokola ngai. Mpo bazali kobimisela ngai mpasi mingi mpenza,Bazali koyokela ngai nkanda makasi mpe bazali mpenza koyina ngai.+   Motema na ngai ezali na mpasi makasi na kati na ngai,+Mpe nsɔmɔ ya liwa ezingi ngai.+   Kobanga mpe kolɛnga ekweli ngai,Mpe kolɛngalɛnga ezwi ngai.   Nazali kaka koloba: “Soki nazalaka ata na mapapu lokola ebenga! Mbɛlɛ napumbwaki mosika mpe nafandi na kimya.   Talá! mbɛlɛ nakimaki mosika.+ Mbɛlɛ nafandaki na esobe.+ (Sela)   Mbɛlɛ nakendaki mbangu na esika na ngai ya libateliMosika na mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mosika na mopɛpɛ makasi.”   Ee Yehova, bulunganisá bango mpe salá ete makambo oyo bakani kosala elonga te,*+Mpo namoni mobulu mpe kowelana na kati ya engumba. 10  Ezali kobaluka zingazinga likoló ya bifelo na yango butu moi;Makambo ya mabe mpe mpasi ezali na kati na yango.+ 11  Libebi ezali na kati na yango;Monyoko ná bokosi elongwe ata moke te na esika na yango monene ya bato nyonso.+ 12  Mpo monguna te nde atumoli ngai;+Soki bongo mbɛlɛ nakangelaki yango motema. Ezali te monguna nde atɛmɛli ngai;Soki bongo mbɛlɛ namibombaki liboso na ye. 13  Kasi ezali yo, moto lokola ngai,*+Moninga na ngai oyo nayebi malamu.+ 14  Tozalaki kosepela elongo mpo na boninga na biso ya makasi;Na kati ya ndako ya Nzambe tozalaki kotambola elongo na ebele ya bato. 15  Libebi ekwela bango!+ Bákita na Nkunda* wana bazali naino na bomoi;Mpo mabe ezali na bisika na bango ya kofanda mpe na mitema na bango. 16  Kasi ngai nakobelela Nzambe,Mpe Yehova akobikisa ngai.+ 17  Na mpokwa, na ntɔngɔ mpe na midi, nazali kaka komitungisa mpe komilelalela,*+Mpe ayokaka mongongo na ngai.+ 18  Akobikisa ngai mpenza* na baoyo bazali kobundisa ngai mpe akopesa ngai kimya,Mpo bato ebele bayei kobundisa ngai.+ 19  Nzambe akoyoka mpe akoyanola bango,+Ye oyo azali kofanda na kiti na ye ya bokonzi kobanda ntango ya kala.+ (Sela) Baoyo babangakaNzambe teBakoboya kobongwana.+ 20  Abundisi* baoyo bazali na kimya elongo na ye;+Abebisi kondimana na ye.+ 21  Maloba na ye ezali kitoko koleka manteka,+Kasi kowelana ezali na motema na ye. Maloba na ye ezali pɛtɛɛ koleka mafuta,Kasi ezali mipanga oyo ebimisami na mabenga na yango.+ 22  Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo,+Mpe akosunga yo.+ Akopesa nzela ata moke te ete moto ya sembo akwea.*+ 23  Kasi yo, Ee Nzambe, okokitisa bango na libulu oyo eleki mpenza mozindo.+ Baoyo bazali na ngambo ya makila mpe bato ya bokosi bakokokisa ata katikati ya mikolo na bango te.+ Kasi ngai, nakotyela yo motema.

Maloba na nse

To, “komibomba te ntango nazali kobondela mpo na kosɛnga lisalisi.”
Lil., “kabolá lolemo na bango.”
To, “moto, moto oyo akokani na ngai.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kokimela; nazali na kimya te.”
Lil., “Akosikola ngai mpenza.”
Elingi koloba, moninga ya kala oyo alobelami na vɛrsɛ 13 mpe 14.
To, “atengatenga.”