Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kosala nini soki nasali libunga?

Nasengeli kosala nini soki nasali libunga?

 Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?

 Tángá likambo oyo ekómelaki Karina, mpe kanisá ete ekómelaki nde yo. Olingaki kosala nini?

 Karina: “Nazalaki kotambwisa motuka mbangu makasi ntango nazalaki kokende kelasi; polisi moko atɛlɛmisaki ngai mpe afutisaki ngai amande. Nayokaki nkanda mpenza! Nayebisaki Mama likambo yango, mpe alobaki na ngai nayebisa Papa; kasi nalingaki koyebisa ye yango te.”

  Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?

  1.  Likanisi 1: Kofanda nyɛɛ, mpe kokanisa ete Papa akoyeba eloko te.

  2.  Likanisi 2: Koyebisa Papa makambo nyonso ndenge esalemaki.

 Motema na yo ekoki kotinda yo osalela Likanisi 1. Mbala mosusu mama na yo akokanisa kaka ete okendaki koyebisa papa na yo likambo yango. Nzokande ezali malamu ondimaka mabunga na yo, ata soki bafutisi yo amande to bapesi yo etumbu mosusu; mpo na nini?

 Ntina oyo osengeli kondima mabunga na yo

  1.  1. Yango nde likambo ya malamu ya kosala. Mpo na bakristo, Biblia elobi ete: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

     “Nasalaka makasi mpenza nazala sembo, namemaka mokumba ya makambo oyo nasali, mpe nandimaka mbala moko mabunga na ngai.”​—Alexis.

  2.  2. Mbala mingi bato balimbisaka baoyo bandimaka mabunga na bango. Biblia elobi: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”​—Masese 28:13.

     “Esɛngaka mpiko mpo na kondima libunga oyo osali, kasi yango nde esalaka ete bato bákóma kotyela yo motema. Bakomona ete ozali sembo. Soki ondimi libunga oyo osali, okoki kobongisa makambo.”​—Richard.

  3.  3. Likambo eleki ntina, okosepelisa Yehova Nzambe. Biblia elobi: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”​—Masese 3:32.

     “Nsima ya kosala libunga moko monene, nakómaki komona ete nasengeli kosala makasi nandima yango. Yehova akokaki kopambola ngai te soki nasali te makambo ndenge alingaka.”​—Rachel.

 Bongo Karina asalaki nini mpo na libunga na ye? Na ebandeli, aboyaki koyebisa papa na ye ete bafutisaki ye amande. Kasi, akokaki kobomba yango libela te. Karina alobi boye: “Mbula soki moko na nsima, papa akendaki kotala mikanda na biso ya assurance mpe amonaki ete bafutisaki ngai amande mpo natambwisaki motuka mbangu. Ebendelaki ngai mindɔndɔ mpenza, ata mama asilikelaki ngai mpo nasalaki te ndenge alobaki!”

 Liteya: Karina alobi boye: “Kobomba mabunga oyo osali, ebebisaka lisusu makambo. Ata ndele, ekoyebana kaka!”

 Ndenge ya kozwa mayele na mabunga na yo

 Moto nyonso asalaka mabunga. (Baroma 3:23; 1 Yoane 1:8) Mpe ndenge tomoni yango, kondima mbala moko mabunga na yo ekomonisa ete ozali na komikitisa mpe okoli.

 Nsima ya kondima, osengeli kozwa mayele na mabunga oyo osalaki. Likambo ya mawa, bilenge mosusu basalaka yango te! Ntango mosusu bamiyokaka lokola elenge moko na nkombo Priscilla. Alobi boye: “Mabunga na ngai ezalaki kotungisa ngai koleka ndelo. Lokola nazalaki komimona ntina te, soki nasali libunga, nazalaki koyoka lokola nazali na mokumba oyo nakokoka komema te. Nazalaki komitungisa mingi mpe komona ete esili mpo na ngai.”

 Yo mpe oyokaka bongo na bantango mosusu? Soki ezali bongo, kobosana likambo oyo te: Kokanisakanisa mabunga oyo osalá kala ezali lokola ozali kotalatala na rétroviseur ntango ozali kotambwisa motuka. Kotya makanisi na makambo eleká ekotinda yo kaka omimona ntina te mpe ekosilisa yo makasi ya kobundisa mikakatano oyo ekoki koya.

 Lokola ezali bongo, mpo na nini te kobongisa makanisi na yo?

 “Kanisá mabunga oyo osalaki, mpe zwá mayele mpo ozongela yango te. Kasi, kokanisakanisa mabunga yango te noki elɛmbisa yo nzoto.”​—Elliot.

 “Namonaka ete mabunga epesaka ngai mayele. Nasalaka makasi ete na libunga nyonso oyo nasali, nazwa liteya oyo ekosalisa ngai nakóma moto malamu mpe nayeba kosilisa mikakatano ndenge na ndenge na mikolo ezali koya. Yango nde ebongi kosala ntango nyonso mpo ekosalisa yo okola.”​—Vera.