Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natika konyokwama na makanisi?

Nasala nini mpo natika konyokwama na makanisi?

 Kosalela mayele oyo ebongi ekoki kosalisa yo omiyoka malamu koleka!

 Okosala nini?

 Talelá makambo oyo elandi:

 Jennifer azali kosepela lisusu na eloko moko te. Azali kolela mikolo nyonso; ntina mpenza oyo azali kolela bongo ezali koyebana te. Akómi kokima bato mpe kolya na mpasi. Kolala to kotya makanisi na likambo moko ekómeli ye mpasi. Jennifer azali komituna: ‘Nini ezali kokómela ngai? Nakozonga lisusu ndenge nazalaki?’

 Mark azalaki ndakisa malamu na kelasi. Kasi sikoyo alingi lisusu kelasi te, mpe bapwɛ na ye ekiti na mbala moko. Mark azali lisusu na makasi te ya kosala ngalasisi ndenge azalaki kosala liboso. Ekómi kolekela baninga na ye. Baboti na ye bazali komitungisa. Ezali kaka mpo na mwa ntango to ezali nde likambo mosusu?

 Mbala mingi omiyokaka lokola Jennifer to Mark? Soki ezali bongo, okoki kosala nini? Okoki kosala makambo mibale oyo:

  1.   Meká yo moko kolonga likambo yango

  2.   Sololá na mokóló moko oyo otyelaka motema

 Likambo A ekoki kosepelisa yo, mingimingi soki ozali na mposa ya kosolola na moto te. Kasi yango nde likambo ebongi kosala? Biblia elobi: “Bato mibale baleki moto moko . . . soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye. Kasi ekozala boni soki moto oyo azali kaka ye moko akwei mpe moto mosusu azali te mpo na kotɛlɛmisa ye?”—Mosakoli 4:9, 10.

 Tózwa ndakisa: Kanisá ete obungi na balabala moko oyo bato mabe bazalaka. Molili ezali, mpe bato oyo oyebi te bazali kotambolatambola. Okosala nini? Okoki koluka ndenge ya kobima na motambo yango. Kasi omoni te ete ekozala malamu mingi osɛnga lisalisi epai ya moto moko oyo okoki kotyela motema?

 Konyokwama na makanisi ezali lokola ozali na esika ya mabe ndenge wana. Toboyi te, na bantango mosusu okoki koyoka mawa, mpe ekoki kosila yango moko. Kasi soki konyokwama na makanisi ezali koumela mingi, ekozala malamu koluka lisalisi.

 TOLI YA BIBLIA: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu . . . akotombokela makambo nyonso ya bwanya.”​—Masese 18:1.

 Likambo B ezali na litomba mpo kosolola na moboti to mokóló moko oyo otyelaka motema, oyo akutaná na mokakatano yango, ekoki kosalisa yo.

 Okoki koloba: ‘Kasi baboti na ngai bayebi te ndenge oyo konyokwama na makanisi esalaka!’ Ezali mpenza bongo? Ata soki makambo oyo bakutaná na yango na bolenge ekeseni na oyo ya yo, ekoki kozala bamiyokaki mpe ndenge ozali komiyoka. Mpe bakoki kosalisa yo!

 TOLI YA BIBLIA: “Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te mpe mayele na bolai ya mikolo te?”​—Yobo 12:12.

 Likanisi: Soki oyebisi likambo yango na moboti to mokóló moko otyelaka motema, mbala mosusu bakopesa yo toli oyo ekosalisa.

Konyokwama na makanisi ezali lokola obungi na esika moko ya mabe. Mpo obima na motambo yango, luká lisalisi

 Bongo soki esɛngi lisalisi ya monganga?

 Soki ozali konyokwama na makanisi mokolo na mokolo, ekoki kozala maladi oyo esɛngi lisalisi ya monganga.

 Na bolenge, bilembo oyo emonisaka ete moto abɛli maladi ya makanisi ekoki kokokana mwa moke na oyo emonanaka epai ya bilenge mingi, kasi mbala mingi oyo ya maladi ekómaka makasi koleka mpe eumelaka ntango molai. Yango wana, soki ozali na mawa ya makasi mpe ezali kosila te, ekozala malamu osolola na baboti na yo mpo ozwa lisalisi ya monganga.

 TOLI YA BIBLIA: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”​—Matai 9:12.

 Soki bazwi yo na maladi ya makanisi, ezali na ntina te oyoka nsɔni. Bilenge mingi babɛlaka maladi yango, mpe ezali na bankisi oyo esilisaka yango! Baninga na yo ya solo bakokanisela yo mabe te.

 Toli: Zalá motema molai. Esɛngaka ntango mpo moto abika na maladi yango, mpe mikolo mosusu ekoki kozala malamu to mabe mpo na yo. a

 Makambo ya kosala mpo omiyoka lisusu malamu

 Ata soki esɛngi ozwa lisalisi ya monganga, ezali mpe na makambo oyo okoki kosala ntango ozali koyoka mawa oyo ezali kosila te. Na ndakisa, kosala ngalasisi mbala na mbala, kolya malamu mpe kolala mingi ekoki kosala ete omiyoka malamu. (Mosakoli 4:6; 1 Timote 4:8) Kokoma na kaye ndenge ozali komiyoka, makambo okosala mpo otika komiyoka bongo, makambo oyo olongi kosala te mpe oyo olongi kosala, ekoki mpe kosalisa yo.

 Ata soki ozali na maladi ya makanisi to ozali kolekisa ntango moko ya mpasi oyo ezali kosala ete onyokwama na makanisi, kobosana likambo oyo te: Soki ondimi lisalisi ya basusu mpe osali makambo oyo esengeli mpo na kobika, okoki kotika konyokwama na makanisi.

 Bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa

  •  “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

  •  “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.”​—Nzembo 55:22.

  •  “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”​—Yisaya 41:13.

  •  “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda”​—Matai 6:34.

  •  “Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

a Soki ozali na makanisi ya komiboma, luká mbala moko lisalisi epai ya mokóló moko oyo otyelaka motema. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá masolo minei oyo “Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?” na Lamuká! ya 04/2014.