Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo makasi nyonso esila ngai te?

Nasala nini mpo makasi nyonso esila ngai te?

 Ozali komona lokola makasi nyonso elingi kosila yo? Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo!

 Mpo na nini ekómaka

  •   Makambo mingi ya kosala. Elenge mwasi moko na nkombo Julie, alobi boye: “Na makambo nyonso ya bomoi, balobaka na biso tókoba kokende liboso, tókolisa lisusu makoki na biso, tókoba komityela mikano ya minene mpe tózwa matomba mingi. Mbamba ya ndenge wana ntango nyonso ezali mpasi!”

  •   Baaparɛyi ya mikolo oyo. Batelefone, batablɛti to baaparɛyi mosusu esalaka ete tósololaka na bato ntango nyonso; yango ekoki kosala ete tótungisama na makanisi mpe nsima ya mikolo tósila makasi.

  •   Kozanga mpɔngi. Elenge mwasi moko na nkombo Miranda, alobi boye: “Kokabola ntango ya mosala, kelasi mpe kozwa mwa mopɛpɛ esalaka ete bilenge mingi bálamukaka ntɔngɔ makasi mpe bálalaka retare, mpe ndenge mosusu ya kosala ezali te.” Mbala mingi likambo yango mpe esalaka ete moto asila makasi.

 Mpo na nini ezali na ntina

 Biblia ekumisaka likambo ya kozala makasi na mosala. (Masese 6:6-8; Baroma 12:11) Kasi endimaka te likambo ya kosala mosala tii kozanga ntango mpo na kokipe makambo mosusu; ata mpe kokipe nzoto na yo moko.

 “Mokolo moko, namonaki ete mokolo mobimba nalyaki te mpo namipesaki mobimba na mikumba mingi oyo nazalaki na yango. Eteyaki ngai ete ezali malamu te kondima mokumba nyonso tii kobosana nzoto na ngai moko.”​—Ashley.

 Yango wana, Biblia elobi: “Mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá.” (Mosakoli 9:4) Komibosana ekoki kotinda yo okanisa ete ozali makasi lokola nkɔsi​—nabanzi, mpo na mwa ntango. Kasi komisilisa makasi ezali likama mpo na sante na yo.

 Oyo okoki kosala

  •   Yebá koboya. Biblia elobi: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Bato ya bopɔlɔ bayebaka ete bakokoka makambo nyonso te mpe basalaka te koleka oyo bakoki kosala.

     “Bato oyo basilaka makasi nyonso ezali mingimingi baoyo bayebaka te koboya, balukaka kosala mosala nyonso oyo bapesi bango. Moto ya bopɔlɔ azalaka bongo te. Lelo to lobi ekosala ete asila makasi nyonso.”​—Jordan.

  •   Pemáká malamu. Biblia elobi: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:6) Babengaka mpɔngi “bilei mpo na bɔɔngɔ,” kasi bilenge mingi balalaka te ngonga mwambe to zomi, nzokande esɛngi bongo.

     “Ntango makambo ya kosala elekelaki ngai ndelo, nakómaki na momeseno ya kolala mingi te. Kasi na bantango mosusu, bangonga wana ya mpɔngi oyo nazalaki kozangisa nde nazalaki na yango mposa mpo nasala mosala malamu na mokolo oyo elandi mpe nazala na esengo.”​—Brooklyn.

  •   Mibongisá. Biblia elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” (Masese 21:5) Koyeba kosalela ntango mpe koyeba makambo oyo okosala ezali likambo oyo ekosalisa yo bomoi na yo mobimba.

     “Komibongisa ekoki kosalisa biso tókima mitungisi mosusu oyo tomilukelaka. Ntango osali programɛ ya malamu, ekozala mpasi te oyeba esika nini okoki kobongisa mwa moke mpo esalisa yo oboya kosilisa makasi nyonso ya nzoto.”​—Vanessa.