Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ntango makambo ebongwani

Ntango makambo ebongwani

MOKAKATANO

  • Mosala ya papa esɛngi ete bókende kofanda esika mosusu.

  • Moninga na yo ya motema azali kokende kofanda mosika.

  • Yaya na yo azali kolongwa na ndako mpo alingi abala.

Okosala ndenge nini soki makambo ebongwani bongo?

Soki nzete ezali na likoki ya kogumbama na mopɛpɛ ya moke, ekozala mpasi ekwea na mopɛpɛ ya makasi. Ndenge moko na nzete yango, okoki “kogumbama” ntango makambo oyo okoki kobongola to te ekómeli yo. Liboso tólobela ndenge okoki kosala yango, tótalela naino mwa makambo oyo osengeli koyeba na likambo yango.

OYO OSENGELI KOYEBA

Makambo ebongwanaka kaka. Biblia elobeli mpenza likambo moko oyo ekómelaka bato: “Makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Lelo to lobi, okokutana kaka na likambo moko oyo ekanami te. Yango elingi koloba te ete makambo nyonso oyo ekanami te ezalaka kaka mabe. Na ebandeli, bambongwana mosusu ekoki komonana mabe, kasi na nsima ekoki komemela biso matomba. Ata bongo, bato mosusu bayebaka te básala nini ntango makambo ebongwani, ata soki ezali mpo na bolamu na bango to te.

Bilenge nde batungisamaka mingi koleka ntango makambo ebongwani. Mpo na nini? Elenge mobali moko na nkombo Alex, * alobi boye: “Bambongwana oyo esalemaka na nzoto ya bilenge etungisaka, soki obakisi bambongwana mosusu, ekoki kobakisa kaka mpasi.”

Ntina mosusu yango oyo: Soki mbongwana moko ekómeli mokóló, akoki kokanisa makambo oyo akutaná na yango mpo ayeba ndenge asalaki ntango likambo ya ndenge wana ekómelaki ye. Kasi bilenge bakutani naino na makambo mingi te.

Okoki komesana. Kokanga motema esalisaka moto alɛmba nzoto te ntango akutani na likambo ya mabe to andima likambo oyo ebongwani. Moto oyo akangaka motema akoki koyika mpiko na mokakatano oyo ekómeli ye mpe komona likambo nini ya malamu mokakatano yango ekoki komemela ye. Ezali mpasi elenge oyo akangaka motema amipesa na drɔgɛ to na komɛla masanga ntango makambo elekeli ye.

OYO OKOKI KOSALA

Ndimá likambo oyo ebongwani. Na ntembe te, okosepela otambwisa makambo nyonso ya bomoi na yo, kasi yango ekoki kosalema te. Baninga bakoki kokende mosika to kobala; bandeko bakoki kokóma mikóló mpe kolongwa na ndako; makambo mosusu ekoki kosala ete bólongwa esika bozalaki kofanda mpe bótika baninga mpe makambo nyonso bomesanaki na yango. Eleki malamu ondima makambo oyo ekómeli yo na esika omitungisa mingi.Toli ya Biblia: Mosakoli 7:10.

Talá nde liboso. Kotya makanisi na makambo oyo eleká ezali lokola kokumba motuka na nzela ya monene, kasi miso ezali kotala kaka talatala ya motuka. Na bantango mosusu kotala talatala ezalaka malamu kasi esengeli kotya miso nde na nzela oyo ozali kokende. Ezali mpe bongo ntango makambo ebongwani. Luká kotya miso na makambo oyo ezali liboso. (Masese 4:25) Na ndakisa, okani kosala nini na sanza oyo ezali koya to nsima ya sanza motoba?

Tyá makanisi na makambo ya malamu. Elenge mwasi moko na nkombo Laura, alobi boye: “Kokanga motema etalelaka ndenge moto azali kotalela likambo. Talá nde bolamu oyo okoki kozwa na likambo oyo ekómeli yo.” Okoki kotánga ata litomba moko oyo likambo yango ekoki komemela yo?Toli ya Biblia: Mosakoli 6:9.

Elenge mwasi moko na nkombo Victoria abosanaka te ndenge baninga na ye nyonso balongwaki na kartye ntango azalaki na mbula soki 13. Alobi boye: “Nayokaki lokola natikali ngai moko, mposa na ngai ezalaki tózala na bango. Kasi soki nazongisi makanisi nsima, ezali na ntango wana nde nabandaki mpenza kokola. Namonaki ete kokola esɛngaka bambongwana. Ezali mpe ntango wana nde namonaki ete nakoki kozwa baninga ya sika oyo bazali mosika te.”Toli ya Biblia: Masese 27:10.

Kotya makanisi na makambo oyo eleká ezali lokola kokumba motuka na nzela ya monene kasi miso ezali kotala kaka talatala ya motuka

Salisáká basusu. Biblia elobi: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:4) Kosalisa basusu ezali nkisi mpo na kolonga mokakatano na yo. Anna, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Ntango nazali kokola, namonaka ete soki nasalisi moto moko oyo akutani na likambo ya mpasi lokola oyo ya ngai to ya mabe koleka—esalisaka ngai mpenza!”

^ par. 11 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.