Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 3: Nini ezali kopekisa ngai?

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 3: Nini ezali kopekisa ngai?

 Bongo soki nasali lisumu moko ya monene nsima ya kozwa batisimo?

 Ntina oyo ozali komitungisa: Ekoki kozala oyebi moto moko oyo asalaki lisumu moko ya monene mpe esengelaki abimisama na lisangá. (1 Bakorinti 5:11-13) Mbala mosusu ozali kobanga ete yango ekoki mpe kokómela yo.

 “Ntango nakanisaki kozwa batisimo mpo na mbala ya liboso, likanisi ya kosala lisumu moko ya monene ezalaki kobangisa ngai. Nazalaki komona mpasi oyo likambo yango ya mabe ekokaki koyokisa baboti na ngai.”​—Rebekah.

 Vɛrsɛ ya ntina: “Moto mabe atika mabe na ye . . . Azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.”​—Yisaya 55:7.

 Kanisá likambo oyo: Atako mosumuki oyo abongoli motema te abimisamaka na lisangá, Yehova amonisaka motema mawa na ye epai ya baoyo na komikitisa nyonso babongolaka motema mpe bandimaka disiplini na ye.​—Nzembo 103:13, 14; 2 Bakorinti 7:11.

 Kutu, likambo ya solo ezali ete: Atako ozali moto ya kozanga kokoka, okoki kolonga komekama na lisalisi ya Nzambe. (1 Bakorinti 10:13) Tokende epai tozonga epai, nani akozwa ekateli na esika na yo mpo na makambo oyo okosala? Yo to moto mosusu?

 “Nazalaki kobanga ete nasala lisumu ya monene nsima ya kozwa batisimo, kasi nayaki koyeba ete ekozala libunga soki naboyi kozwa batisimo. Namonaki ete esengeli te natika oyo ekoki koya lobi epekisa ngai kosala oyo nalingi kosala lelo.”​—Karen.

 Na mokuse: Soki olingi, okoki koboya kosala masumu ya minene, kaka ndenge basaleli mingi ya Yehova basalaka yango.​—Bafilipi 2:12.

 Ozali na mposa ya lisalisi? Talá lisolo “Ndenge nini nakoki kotɛmɛla komekama?

 Bongo soki nazali kobanga mikumba oyo eyaka nsima ya kozwa batisimo?

 Ntina oyo ozali komitungisa: Na ndakisa, ekoki kozala oyebi bilenge mosusu oyo batika mabota na bango mpe baninga mpo na kokende kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Mpe ozali kobanga ete bato bakomizela ete yo mpe osala bongo.

 “Ezali solo ete mokristo oyo azwi batisimo akoki kozwa mikumba minene na lisangá, kasi moto nyonso te nde azalaka na likoki ya kosala bongo, ekoki kozala mpo makambo ya bomoi epesi nzela te.”​—Marie.

 Vɛrsɛ ya ntina: “Moto na moto ameka mosala na ye moko, bongo akozwa likambo ya kosepela na yango mpo na ye moko, kasi te mpo azali komikokanisa na moto mosusu.”​—Bagalatia 6:4.

 Kanisá likambo oyo: Na esika omikokanisa na basusu, tyá nde makanisi na maloba oyo ezali na Marko 12:30: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.”

 Simbá ete osengeli kosalela Yehova na motema na yo mobimba​—kasi mpo na moto te. Soki olingaka mpenza Yehova, okomona mabaku ya kosalela ye na lolenge ya malamu mpenza na kotalela makoki na yo.

 “Atako batisimo ezali likambo ya kozwa na lisɛki te, kasi yango ezali mokumba ya kilo te. Soki ozali na baninga ya malamu, bakozala wana mpo na kosalisa yo. Mokemoke ntango ozali kozwa mikumba na lisangá, yango ekopesa yo esengo. Soki oboyi kozwa batisimo, wana osali eloko ya malonga te.”​—Julia.

 Na mokuse: Kómisá makasi botɔndi na yo mpo na bolingo oyo Yehova amoniselá yo. Yango ekotinda yo opesa ye oyo eleki malamu.​—1 Yoane 4:19.

 Ozali na mposa ya lisalisi? Talá lisolo “Est-​ce que je suis quelqu’un de responsable?

 Bongo soki nazali komiyoka lokola nabongi te mpo na kosalela Yehova?

 Ntina oyo ozali komitungisa: Yehova azali Mokonzi oyo aleki nyonso; soki tokokanisi ye na biso, tozali eloko te! Okoki komituna soki Yehova ayebaka yo ata koyeba mpamba.

 “Lokola baboti na ngai bazali Batatoli ya Yehova, nazalaki komona ete boninga na ngai na Yehova ezalaki kaka lokola ‘héritage’ ya baboti, nazalaki komona te ete Yehova ye moko mpenza abendaki ngai epai na ye.”​—Natalie.

 Vɛrsɛ ya ntina: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.”​—Yoane 6:44.

 Kanisá likambo oyo: Kaka ndenge ozali kokanisa kozwa batisimo, yango ekoki komonisa ete Yehova azali kobenda yo epai na ye mpo bókóma baninga mpenza ya motema. Okondima kokóma moninga na ye?

 Lisusu, kobosana te ete kaka Yehova nde ayebi nini oyo etindaka ye abenda moto songolo to pakala epai na ye. Mpe Liloba na ye emonisi solo ete soki ‘opusani penepene na Nzambe, . . . ye mpe akopusana penepene na yo.’​—Yakobo 4:8.

 “Lokola oyebi makambo etali Yehova mpe ye abendaki yo epai na ye, yango emonisi ete alingaka yo. Na yango, soki okanisi ete obongi te mpo na kosalela ye, yebá ete yango ezali makanisi ya Yehova te. Yehova azalaka ntango nyonso na rɛzɔn.”​—Selina.

 Na mokuse: Soki okokisi masɛngami ya Biblia mpo na kozwa batisimo, na ntango yango nde okozala moto oyo abongi mpo na kosalela Yehova. Mpe kobosa te, ebongi osambela ye.​—Emoniseli 4:11.

 Ozali na mposa ya lisalisi? Talá lisolo “Mpo na nini nasengeli kobondela?