Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nakosala nini soki nakómá moombo ya pornografi?

Nakosala nini soki nakómá moombo ya pornografi?

Oyo okoki kosala

 Yebá ete pornografi ezali mabe mpenza. Pornografi ezali mayele moko ya mabe mpo na kosilisa valɛrɛ ya eloko moko oyo Nzambe alingi ete ezala na lokumu. Soki ozali kotalela pornografi ndenge wana, ekosalisa yo ‘oyina oyo ezali mabe.’​—Nzembo 97:10.

 Kanisá makama na yango. Pornografi esilisaka valɛrɛ ya bato oyo balakisaka na bililingi yango. Esilisaka mpe valɛrɛ ya moto oyo azali kotala yango. Yango wana, Biblia elobi ete: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.”​—Masese 22:3.

 Mityelá mibeko. Yobo, moto moko ya sembo, alobaki boye: “Napesaki miso na ngai mobeko oyo: natala elenge mwasi na miso ya boluli te.” (Yobo 31:1, Liloba lya Nzambe) Talá mwa ‘mibeko’ oyo okoki komityela:

  •  Nakosalela Internet te soki nazali kaka ngai moko.

  •  Nakokanga mbala moko mesaje to esika nyonso na Internet oyo elobeli makambo ya kosangisa nzoto.

  •  Soki nakwei lisusu na likambo yango, nakoyebisa moninga moko oyo akɔmeli.

Makama ya pornografi ebakisamaka mokemoke ntango nyonso oyo moto azali kotala yango​—soki ozali kotala yango mingi, ekozala mpe mpasi otika yango

 Bondelá mpo na likambo yango. Mokomi ya nzembo abondelaki Yehova ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.” (Nzembo 119:37) Nzambe alingi ete olonga, mpe soki obondeli ye, akoki kopesa yo makasi mpo osala oyo ezali sembo!—Bafilipi 4:13.

 Sololá na moto moko. Kozala na moninga moko ya motema oyo okoki koyebisa ye likambo yango ekosalisa yo otika momeseno yango.​—Masese 17:17.

 Kobosana te: Mbala nyonso oyo oboyi kotala pornografi, olongi etumba. Yebisá Yehova Nzambe ndenge olongi mpe pesá ye matɔndi na ndenge apesaki yo makasi. Soki oboyi kotala pornografi, ozali kosepelisa motema ya Yehova!​—Masese 27:11.