Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ezali kaka boninga to nde lolango?​—Eteni 2: Bajɛstɛ na ngai ezali komonisa nini?

Ezali kaka boninga to nde lolango?​—Eteni 2: Bajɛstɛ na ngai ezali komonisa nini?

 Olingaka kopesa moninga na yo ntango soki azali na mposa ya kosolola. Mpe mikolo oyo ozali kosolola na moninga moko mingi mpenza. Mokakatano ezali ete yo ozali mwasi ye azali mobali to yo ozali mobali mpe ye azali mwasi. Omilobeli ‘tozali kaka baninga,’ na likanisi ete ye mpe azali kozwa yo kaka lokola moninga. Esengeli kotungisa yo?

 Oyo ekoki kokóma

 Kosala boninga ná bana-basi to bana-mibali ezali mabe te. Kasi nini ekoki kokóma soki osali boninga makasi ná moko na bango? Boye, mwana-mwasi to mwana-mobali yango akomona ete olingi bosuka kaka na boninga te.

 Yango nde olingi? Tótalela mwa makambo oyo ekoki kosala ete ekóma bongo, ata nakozanga kokana.

  •   Ozali kotyela moto moko likebi mingi.

     “Ata soki ozali na likoki te ya kopekisa moto amiyoka boye to boye, kopelisa mɔtɔ te, osengeli te kosololaka na ye to kobengaka ye ntango nyonso bongo na nsima oloba ete bozali kaka baninga.”​—Sierra.

  •   Ozali komonisa moto ete yo mpe otyelaka ye likebi mingi.

     “Ngai te nde nabandisaki likambo ya kotindela elenge mwasi yango bamesaje, kasi nazalaki ntango nyonso kozongisa bamesaje na ebele ya bamesaje oyo azalaki kotindela ngai. Na nsima, ekómaki mpasi nayebisa ye ete nazwaka ye kaka lokola moninga.”​—Richard.

  •   Ozali kosala makambo oyo ekotinda moto atyela yo likebi mingi.

     “Bato mosusu bakanisaka ete kozala selesele na moto ezali lisano. Basakanaka na motema ya moto ata soki bazali na mposa ya kobalana na moto yango te. Namoná makambo yango mingi mpe ntango nyonso moto moko atikalaka na mpasi na motema.”​—Tamara.

 Na mokuse: Kosolola mpe kotyela moto likebi ntango nyonso emonisaka lolango.

 Mpo na nini ezali na ntina

  •   Esalaka moninga mosusu mpasi na motema.

     Biblia elobi: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” (Masese 13:12) Okokanisa nini soki moto moko azali kokoba kosala makambo oyo ezali komonisa ete alingi bólingana?

     “Babengaka yango, ‘Kotyela moto ndɔbɔ.’ Esalelamaka mpo na kolobela moto oyo akangi mbisi na ndɔbɔ mpe aboyi kotika to kobenda yango. Ekoki mpe kosalema bongo na boninga. Soki ozali na mposa ya kobalana na moto te kasi okangi ye ‘na motambo,’ okopesa moto yango mpasi mingi.”​—Jessica.

  •   Ekobebisa lokumu na yo.

     Biblia elobi: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Bafilipi 2:4) Moto oyo alukaka kaka matomba na ye moko okotya ye na molɔngɔ nini? Ndenge nini yango ekoki kobebisa lokumu ya moto?

     “Nasepelaka te na mwana-mobali oyo azalaka selesele na bana-basi. Mpe kozala selesele ezalaka elembo oyo emonisaka ete moto akozala sembo te na libala. Olingi ozwa valɛrɛ na nzela ya moto moko mpe yango ezali ezaleli ya moimi.”​—Julia.

 Na mokuse: Baoyo basalaka makambo oyo ezali komonisa lolango kasi bazali na mposa te ya kobalana na moto bapesaka moto yango mpasi mpe bango moko bayokaka mpasi.

 Oyo okoki kosala

  •   Biblia elobi tosengeli kotalela “bilenge mibali lokola bandeko mibali” mpe “bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.” (1 Timote 5:1, 2) Soki osaleli toli yango, okobatela boninga na yo na basi to mibali.

     “Soki tobali, tokolinga te kozala selesele na molongani ya moto mosusu. Ezali malamu mpo na ngai namesana kosala bongo lokola nabali naino te, nalekisa ndelo te na ndenge na ngai ya kosalela bana-mibali makambo.”​—Leah.

  •   Biblia elobi: “Na ebele ya maloba, makambo ya kobuka mibeko ezangaka te.” (Masese 10:19) Toli yango etaleli kaka te ntango tozali kosolola kasi mpe ntango tozali kotindelana bamesaje; ata mpe mbala boni to makambo nini tozali koloba.

     “Ezali na ntina te kotindelaka elenge mwasi bamesaje mikolo nyonso soki ozali na mposa te bóbalana.”​—Brian.

  •   Biblia elobi: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto.” (Yakobo 3:17) Okoki kopesa moto bizi mpo na komonisela ye lolango to mpe okoki kopesa yango na makanisi ya mabe te.

     “Nasalaka makasi nasolola na boboto kasi masolo milaimilai te.”​—Maria.

 Na mokuse: Talelá malamumalamu makambo oyo osalaka soki ozali liboso ya bana-mibali to bana-basi. Elenge moko na nkombo Jennifer, alobi boye: “Ezalaka mpasi kozwa moninga ya malamu, mpe okolinga te kosala makambo oyo ezali komonisa lolango noki te okobebisa boninga yango.”

 Toli

  •    Tyá likebi na makambo oyo basusu bazali koloba. Soki moto moko atuni, “Yo ná moto songolo bolingani?” ekoki komonisa ete bokómi mosika na moto yango.

  •    Kolekisa ndelo te na boninga na yo ná bana-mibali to bana-basi. Kotyá te moko na bango pembeni mpe kotyela ye te likebi koleka basusu.

  •   Zalá ekɛngɛ na bamesaje oyo ozali kotindela ye; ata mpe mbala boni ozali kotinda yango, maloba na yango mpe ngonga oyo ozali kotindela ye yango. Elenge mwasi moko na nkombo Alyssa, alobi boye: “Ezali na ntina te kotindela mwana-mwasi to mwana-mobali bamesaje na katikati ya butu.”