Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kobakisa baninga?

Nasengeli kobakisa baninga?

 “Namiyokaka malamu ndenge nakangamá kaka na mwa baninga oyo nazalaka na bango mpe ezali mpenza mpasi naluka baninga mosusu.”​—Alan

 “Nazali kaka na mwa baninga mpe ekoki na yango. Nazali te moto oyo alingaka kofungwama mpe kosolola na bato oyo ayebi te.”​—Sara.

 Omiyokaka lokola Sara ná Alan? Ozali na mwa baninga oyo okangamá na bango mpe omonaka mabe kozwa baninga ya sika?

 Soki bongo, lisolo oyo etali nde yo!

 Mabe ya kokangama kaka na baninga oyo ozalaka na bango

 Ezali mabe te kozala na mwa baninga oyo okangamá na bango. Kozala na baninga ya ndenge wana ekosala omiyoka ete ozangi bato te mpe ozali na esika oyo bandimá yo ndenge ozali ná mabunga na yo nyonso.

 “Esalaka malamu komiyoka ete balingaka yo mpe ozalaka na etuluku moko boye. Ntango ozali elenge, okozala kaka na mposa basusu bándima yo.”​—Karen, azali na mbula 19.

 Oyebaki yango? Yesu azalaki na baninga ebele. Bantoma 12 bazalaki mpe baninga na ye, kasi misato na bango; na ndakisa Petro, Yakobo mpe Yoane bazalaki baninga na ye ya motema.​—Marko 9:2; Luka 8:51.

 Kasi kozala kaka na mwa baninga oyo okangamaka na bango mpe koboya basusu ekoki kozala mabe. Na ndakisa:

  •   Ekoki kokangela yo nzela ya kozwa baninga mosusu ya malamu.

     “Kozala kaka na baninga oyo bozali ndenge moko ekokangela yo nzela ya koyeba makambo mosusu ya sika​—mpe bato ya malamu.”​—Evan, azali na mbula 21.

  •   Bato bakomona yo lokola moto ya lolendo.

     “Soki okangamá kaka na mwa baninga moko boye, ekotinda basusu bákanisa ete olingaka kosolola na bato mosusu te.”​—Sara, azali na mbula 17.

  •   Ekoki kotinda yo mpe okóma kotumolaka bato.

     “Soki ozali yo moko mbala mosusu okotumola moto te, kasi soki baninga oyo okangamaka na bango basalaka yango, ekomonana mbala moko malamu​—to kutu lisɛki.”​—James, azali na mbula 17.

  •   Ekoki kolukela yo makambo; mingimingi soki ondimi kosala nyonso mpo bábwakisa yo te.

     “Soki na baninga oyo okangamaka na bango moko azali mabe, ezali mpasi te bino nyonso bóbeba.”​—Martina, azali na mbula 17.

 Oyo okoki kosala

  •   Talelá mibeko oyo otosaka.

     Omituna boye: ‘Mibeko nini nalingaka kotosa? Baninga na ngai basalaka ete kotosa mibeko yango ezala pɛtɛɛ to mpasi mpo na ngai? Nakokangama kaka na baninga yango ata soki esɛngi nini?’

     Toli ya Biblia: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:33.

     “Soki okangamaka na baninga oyo batosaka te mibeko oyo yo otosaka, okokóma kosala makambo mosusu oyo okanaki te.”​—Ellen , azali na mbula 14.

  •   Talelá makambo oyo otyaka na esika ya liboso.

     Omituna boye: ‘Nakangamá mpenza na baninga na ngai na boye ete nakoki kobuka mibeko oyo natosaka kaka mpo nabatela boninga yango? Nakosala nini soki moninga moko asali likambo moko ya mabe?’

     Toli ya Biblia: “Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango.”​—Emoniseli 3:19.

     “Soki moninga moko na etuluku na bino asali likambo ya mabe mpe olingi kaka kozala sembo epai na ye, okomona lokola otɛki ye soki oyebisi basusu likambo yango.”​—Melanie, azali na mbula 22.

  •   Kokangama kaka na baninga moko te.

     Omituna boye: ‘Litomba nini nakozwa soki nabakisi baninga, ata mpe baoyo nayebi te?’

     Toli ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

     “Ekoki kozala ete bana oyo bazalaka mpenza na baninga te banyokolaka bango na bandako. Soki oluki koyeba bango malamu, okokamwa na bizaleli mosusu ya malamu oyo okokuta epai na bango.”​—Brian, azali na mbula 19.

 Na mokuse: Ezali mabe te kozala na baninga moko oyo okangamá na bango. Kasi okoki mpe kozwa matomba soki obakisi baninga mosusu. Biblia elobi: “Moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.”​—Masese 11:25.