Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nasepelaka na mobali to mwasi lokola ngai​—Yango elakisi ete nakómi homosexuel?

Nasepelaka na mobali to mwasi lokola ngai​—Yango elakisi ete nakómi homosexuel?

 Te!

 Likambo ya solo: Mbala mingi, kosepela na mobali to mwasi lokola yo ezali mposa moko oyo eyaka mpe elekaka.

 Yango nde Lisette, oyo azali na mbula 16, amonaki; liboso azalaki kosepela na elenge mwasi moko lokola ye. Alobi boye: “Na liteya ya bioloji oyo tozwaki na kelasi, nayekolaki ete na eleko ya bolenge, ba-hormone emataka mingi. Nakanisi mpenza ete soki bilenge bayebi malamu nzoto na bango, bakoyeba ete mposa ya kolinga mobali to mwasi lokola bango ezalaka na yango mopaya, mpe bakolinga te kokóma bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi.”

Bilenge nyonso basengeli kopona​—kolanda makanisi mabe ya mokili na oyo etali kosangisa nzoto to kolanda toli ya Liloba ya Nzambe

 Bongo soki mposa ya kolinga mobali to mwasi lokola yo ezali kaka kosila te? Nzambe alobi na moto oyo asepeli na mobali to mwasi lokola ye ete asangisa nzoto na ye te. Wana ezali mabe te?

 Soki oyanoli ɛɛ na motuna oyo, yebá ete likanisi wana euti na likanisi moko ya lokuta ete bato basengeli kosala nyonso oyo balingi ntango mposa ya kosangisa nzoto ekómi makasi. Biblia epesaka bato lokumu na ndenge emonisaka ete bakoki koboya kolanda bamposa mabe ya kosangisa nzoto soki mpenza balingi kosala yango.​—Bakolose 3:5.

 Likanisi ya Biblia ezali mabe te. Ezali kosɛnga na baoyo balingaka kosangisa nzoto na mibali to basi lokola bango ete ‘bákima pite’, ndenge kaka mobali ná mwasi oyo babalani te basengeli kosala. (1 Bakorinti 6:18) Emonani ete ebele ya mibali mpe basi oyo balingi kotosa oyo Biblia elobaka, bamipekisaka ntango bakutani na komekama. Bato oyo balingaka kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi bakoki mpe kosala bongo soki balingi mpenza kosepelisa Nzambe.​—Kolimbola Mibeko 30:19.