Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ezali kaka boninga to nde lolango?​—Eteni 1: Nazali komiyoka ndenge nini?

Ezali kaka boninga to nde lolango?​—Eteni 1: Nazali komiyoka ndenge nini?

 Osepelaka mpenza na mwana-mwasi to mwana-mobali yango mpe omonaka ete ye mpe asepelaka na yo. Kutu, botindelanaka bamesaje ntango nyonso, mbala mingi bokendaka na bafɛti elongo na ye . . . , mpe bamesaje mosusu oyo atindelaka yo ezalaka mpenza ya lolango.

 Yango wana omoni malamu otuna ye soki boninga yango ezali kokende wapi, kaka mpo oyeba soki yo ná ye bozali na makanisi ndenge moko. Eyano nini apesi yo? Alobi: “Nazwaka yo kaka lokola moninga​—eloko mosusu ezali te.”

 Okomiyoka ndenge nini?

 “Nasilikaki mpenza​—nasilikelaki ye mpe namisilikelaki! Tozalaki kotindelana bamesaje mikolo nyonso mpe azalaki komonisa ete azali kosepela na ngai. Ngai mpe nakómaki kosepela na ye.”​—Jasmine.

 “Ngai na mwana-mwasi oyo tozalaki ba-chaperon ya baninga oyo bazalaki bafianse. Na bantango mosusu ezalaki komonana lokola biso nyonso tozali bafianse. Ngai ná mwana-mwasi yango tokómaki kosolola mpe kotindelana bamesaje mingi. Ezalaki mpasi nandima ntango ayebisaki ngai ete azalaki kozwa ngai kaka lokola moninga mpe alinganaki na moto mosusu.”​—Richard.

 “Mwana-mobali moko azalaki kotindela ngai bamesaje mikolo nyonso mpe na ntango moko boye, tokómaki ‘selesele.’ Kasi ntango nayebisaki ye ndenge nazali koyoka na motema mpo na ye, asɛkaki mpe alobaki ‘Nazali na mposa ya kolingana na moto moko te sikoyo!’ Nalelaki mikolo mingi mpenza.”​—Tamara.

 Na mokuse: Soki okanisi ete yo ná moto moko bozali kolingana kasi na nsima omoni ete kaka yo nde ozalaki kolinga ye, epesaka nkanda, nsɔni ata mpe komiyoka lokola batɛki yo. Elenge mobali moko na nkombo Steven, alobi: “Ntango likambo yango ekómelaki ngai, nalɛmbaki nzoto mpe ezokisaki ngai na motema. Ezwaki ntango mpo nazongela kotyela lisusu bato motema.”

 Mpo na nini esalamaka bongo

 Kotindelana bamesaje mpe kosolola na internet ekoki kosala ete okóma kolula moto atako ye azali mpenza na makanisi wana te mpo na yo. Tótalela makambo bilenge mosusu balobi.

 “Moto mosusu akoki kobanda kotindela yo bamesaje kaka mpo azangi likambo ya kosala, kasi yo okoki kobanda kokanisa lokola alulaka yo. Mpe soki atindelaka yo bamesaje mikolo nyonso, ezali mpasi te obanda kokanisa ete alingaka yo mpenza.”​—Jennifer.

 “Okoki kozala na mposa moto moko alinga yo nzokande ye alingi kaka moto moko oyo bakobɛta na ye masolo, oyo akosala ete amiyoka ete azali na ntina.”​—James.

 “Ata soki okomi kaka ‘olala malamu’ ekoki komonana lokola mesaje ya bolingo, kasi mbala mosusu ozalaki na likanisi wana te ntango otindelaki ye mesaje yango.”​—Hailey.

 “Kotya mwa elilingi ya moto azali kosɛka na mesaje ekoki kolimbola ‘nazali na esengo’ to ‘nazali kosepela na yo.’ Mbala mosusu moto oyo akozwa mesaje wana akoki kokanisa ete ozali na mposa bólingana na ye.”​—Alicia.

 Na mokuse: Kotyela moto likebi ekeseni na kolula moto.

 Koloba ezalaka pɛtɛɛ? Ɛɛ! Biblia elobi: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yirimia 17:9) Ekoki kotinda yo obanda kokanisakanisa makambo ya lolango nzokande moto oyo ozali koluka azali ata na makanisi wana te.

 Oyo okoki kosala

  •   Zalá na mokano. Zongisá naino makanisi nsima mpe talá soki boninga na bino ezali ya ndenge nini. Omituna boye, ‘ezali na makambo oyo ezali kondimisa ngai ete ndenge asalelaka ngai makambo ekeseni na basusu?’ Kotika te ndenge ozali komiyoka elɛmbisa ‘makoki na yo ya kokanisa.’​—Baroma 12:1.

  •   Zalá na bososoli. Longola makambo nyonso oyo ezali kondimisa yo ete bozali kaka baninga mpamba te, tyá likebi mpenza na makambo oyo ezali kotinda yo ozala na mwa ntembe. Kokanisa mbala moko te ete lokola yo ozali kosepela na moto, elingi koloba ete ye mpe azali kosepela na yo.

  •   Zalá motema molai. Soki moto alobi naino polele te ete azali na mposa bólingana, komipesa mingi te na boninga ya bongo oyo ekoki kobeba na yango.

  •   Zalá sembo. Biblia elobi ete ezali na “ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Mpo oyeba soki moto moko azali kolinga yo to azali kozwa yo kaka lokola moninga, sololá na ye. Elenge mwasi moko na nkombo Valerie, alobi: “Soki ezali bongo te, ekozala malamu kutu esala yo mpasi mwa moke sikoyo na esika basanza ebele eleka bongo oyoka ete moto yango azwaka yo kaka lokola moninga.”

 Na mokuse: Masese 4:23 elobi: “Batelá motema na yo.” Soki omoni ete obandi kolinga moto moko, luká oyeba soki ye mpe azali kolinga yo. Kotika ete makanisi ya bolingo ekola na motema na yo liboso bólingana, ezali lokola kolona molona moko likoló ya libanga.

 Soki omoni ete moto yango alingaka yo mpe ozali na mbula oyo ebongi mpo bólingana, boye yo moko nde okotala soki okolinga bókoba boninga yango. Kobosana te, libala ya malamu esangisaka mwasi ná mobali oyo bazali na mikano ya elimo ndenge moko, oyo babombelanaka makambo te mpe bazali sembo. (1 Bakorinti 7:39) Kutu, bazalaki baninga malamu ntango babandaki mpe bakokoba kozala baninga malamu.​—Masese 5:18.