Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?

Nasala lisusu nini soki nabuki mibeko oyo batye na ndako?

 Mabota mingi ezalaka na mibeko na yango, na ndakisa, batyaka mibeko na makambo etali ngonga ya kozonga na ndako, kosalela baaparɛyi, ndenge ya kosalela basusu makambo mpe bongo na bongo.

 Okosala nini soki obuki mobeko moko ya libota? Okoki te kobongola likambo oyo esí esalemi, kasi okoki kosala mwa eloko mpo makambo ebebá te. Lisolo oyo ekomonisa yo ndenge ya kosala yango.

 Oyo osengeli te kosala

  •   Soki baboti na yo bayebi te ete obukaki mobeko moko ya ndako, okoki kokóma na makanisi ya kobomba likambo yango.

  •   Soki bayebi ete obukaki mobeko moko ya ndako, okoki kokóma na makanisi ya komilongisa to ya kopesa basusu foti.

 Makanisi wana nyonso mibale ezali malamu te. Mpo na nini? Mpamba te kobomba likambo oyo esalemi to koluka komilongisa emonisaka ete moto akomeli naino te. Yango ekotinda baboti na yo bákanisa ete okomeli naino te mpe osengeli kosala lisusu milende.

 “Kokosa ezali na yango solisyo te. Nsukansuka, solo ekoyebana kaka, mpe disiplini ekómaka makasi koleka ndenge ekokaki kozala liboso.”​—Diana.

 Likambo ya malamu ya kosala

  •   Ndimá likambo oyo osalaki. Biblia elobi boye: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te.” (Masese 28:13) Baboti na yo bayebi malamu ete okoki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Motuna yango oyo: Okoki kozala sembo?

     “Soki ozali koloba solo, baboti na yo bakolimbisa yo. Soki ozali koyebisa bango makambo nyonso oyo osali, bakondima ete ozali sembo mpe bakotyela motema.”​—Olivia.

  •   Sɛngáká bolimbisi. Biblia elobi boye: “Bólata ezaleli ya komikitisa.” (1 Petro 5:5) Esɛngaka kozala na komikitisa mpo na kosɛnga “bolimbisi” mpe koboya komilongisa.

     “Bato oyo bamilongisaka babebisaka lisosoli na bango. Nsukansuka, lisosoli na bango etungisaka bango lisusu te soki bazali kosala makambo ya mabe.”​—Heather.

  •    Ndimáká bitumbu. Biblia elobi boye: “Bóyoka disiplini.” (Masese 8:33) Boyá komilelalela mpe salá makasi otosa mibeko nyonso oyo baboti batye na ndako.

     “Mbala nyonso oyo ozali komilelalela mpo na etumbu oyo ozwi, yango ekoki kosala lisusu ete makambo ebeba se kobeba. Luká komona bolamu ya mobeko moko na esika ya komona kaka mabe na yango.”​—Jason.

  •   Salá makasi ozongisa konfianse oyo batyelaki yo. Biblia elobi boye: “Bosengeli kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso.” (Baefese 4:22) Zwáká bikateli ya malamu mpo baboti na yo bátyela yo lisusu motema.

     “Soki baboti na yo bazali komona ete okómi kozwa bikateli ya malamu mpe ozali lisusu te kobandela makambo ya mabe oyo osalaki, bakokóma lisusu kotyela yo motema.”​—Karen.

 TOLI: Salá koleka oyo basɛngi yo mpo na komonisa ete ozali moto oyo bakoki kotyela motema. Na ndakisa, mbala oyo okobima, yebisá baboti na yo ete ozali na nzela mpe ozali kozonga na ndako, ata soki ozali na retare te. Yango ekomonisa ete olingi koloba na bango ete: ‘Nalingi kozongisa konfianse oyo botyelaka ngai.’