Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai mpo na mibeko oyo batyá na ndako?

Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai mpo na mibeko oyo batyá na ndako?

 “Ntango nazalaki na mbula 15, nazalaki kondima mibeko nyonso ya baboti na ngai, kasi sikoyo lokola nakómi na mbula 19 namoni ete ebongi nazala na bonsomi mwa mingi.”​—Sylvia.

 Yo mpe ozali komiyoka lokola Sylvia? Soki bongo, lisolo oyo ekosalisa yo osolola likambo yango elongo na baboti na yo.

 Oyo osengeli koyeba

 Liboso osolola na baboti na yo mpo na mibeko oyo batyá na ndako, talelá makambo oyo elandi:

  •  Soki mibeko ezalaka te mbɛlɛ mobulu na mobulu. Tózwa ndakisa ya nzela monene oyo etondi na mituka. Ekozala boni soki bilembo ya nzela ezali te, miinda oyo epesaka mituka nzela ya koleka to ya kotɛlɛma ezali te mpe moto nyonso akoki kotambwisa na vitɛsi oyo alingi? Mibeko ya ndako ekokani na mibeko ya nzela mpo esalaka ete makambo etambola na mobulu te.

  •  Mibeko emonisaka ete baboti na yo batyelaka yo likebi. Soki batye ata mobeko moko te, yango ekoki komonisa ete nyonso oyo ekokómela yo etali bango te. Boye, bakozala baboti ya ndenge nini?

 OYEBAKI YANGO? Baboti mpe bazali na mibeko oyo basengeli kotosa! Soki ntembe, tángá Ebandeli 2:24; Kolimbola Mibeko 6:6, 7; Baefese 6:4; mpe 1 Timote 5:8.

 Bongo soki ozali komona kaka ete mibeko ya baboti na yo ebongi te?

 Oyo okoki kosala

 Liboso ya kosolola na bango, talelá makambo oyo elandi. Otosaka mibeko na bango? Soki mbala mingi obukaka mibeko na bango, boye ekozala ntango ya malamu te kosɛnga bango bábakisela yo bonsomi. Kutu, talá lisolo, “Nasala nini mpo baboti bápesaka ngai konfianse?

 Soki oyebani lokola mwana oyo atosaka mibeko, bongisá makambo oyo okolinga koloba na baboti na yo. Koyeba liboso makambo oyo okoloba ekosalisa yo omona soki likambo oyo olingi kosɛnga bango ebongi mpenza. Na nsima, sɛngá baboti na yo bátya ngonga mpe esika oyo ekozala malamu mpo na bino nyonso. Na nsima, ntango ozali kosolola na baboti na yo, kobosana makambo oyo te:

 Zalá na limemya. Biblia elobi: “Liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.” (Masese 15:1) Boye, kobosana likambo oyo te: soki oluki koswana na baboti to koloba na bango ete basaleli yo makambo na bosembo te, lisolo na bino ekoleka malamu te.

 “Soki nazali kotosa baboti na ngai, bango mpe bamoniselaka ngai limemya. Soki tozali kopesana limemya, ezalaka mpasi te tóyokana.”​—Bianca, mbula 19.

 Yokáká. Biblia elobi “tóyokaka noki, tówelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Kobosana te ete ozali kosolola na baboti na yo, kasi ozali kosalela bango diskur te.

 “Ntango tozali kokola, tokoki komona lokola toyebi mingi koleka baboti na biso, kasi yango ezali solo te. Ekozala malamu tóyokaka toli na bango.”​—Devan.

 Mityá na esika na bango. Meká kotalela makambo ndenge baboti na yo bazali kotalela yango. Landá toli oyo ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu”​—yango etali mpe oyo ya baboti na yo.​—Bafilipi 2:4.

Na makambo oyo tolobeli, oyo wapi omoni ete ekosalisa?

 “Nazalaki kokanisa ete baboti na ngai balingaka ngai te mpo bakɔtelaka ngai te. Kasi sikoyo namoni ete bazalaki koyekola ndenge ya kozala baboti malamu mpe ngai nazalaki koyekola ndenge ya kokóma mokóló oyo ayebi kokokisa mikumba na ye malamu. Makambo nyonso oyo bazalaki kosala ezalaki nde mpo balingaka ngai.”​—Yosua, mbula 21.

 Pesá bango solisyo mosusu. Na ndakisa, soki baboti na yo batye mobeko oyo: balingi te okende fɛti oyo ekozwa yo ngonga mobimba na nzela. Luká koyeba nini ezali kotungisa bango​—ezali mpo ezali mosika to fɛti yango moko?

  •   Soki ezali mpo na mosika, bakobongola makanisi soki okei elongo na moto mosusu oyo ayebi mpenza kotambwisa motuka?

  •   Soki ezali fɛti, bakokitisa motema soki oyebisi bango banani bakoya na fɛti yango mpe nani akotambwisa yango?

 Kobosana te komonisa limemya na maloba na yo mpe koyoka makambo bazali koloba na yo na motema molai nyonso. Monisá ete ‘okumisaka tata mpe mama na yo’ na maloba mpe bizaleli na yo. (Baefese 6:2, 3) Bakoki kobongola makanisi? Mbala mosusu. Ezala ndenge nini . . .

 Ndimá na limemya nyonso ekateli ya baboti na yo. Yango ezali likambo ya ntina oyo mbala mingi bilenge babosanaka. Soki baboti baboyeli yo likambo oyo olingi mpe obandi koswanisa bango, okobebisa nde lisusu makambo mpo mbala ya nsima oyo okoluka kosolola na bango ekozala lisusu mpasi koleka mpo bábakisela yo bonsomi. Kasi, soki ondimi kotosa bango, na mbala ya nsima bakoki kotikela yo bonsomi na makambo mosusu.