Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 2: Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo

Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 2: Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo

 Soki otosaka mibeko ya Biblia mpe ozali kokómisa makasi boninga na yo na Nzambe, boye ozali kokanisa kozwa batisimo. Ndenge nini okoyeba soki obongi mpo na kozwa batisimo? a

Na lisolo oyo

 Nasengeli kozala na boyebi ya ndenge nini?

 Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo esɛngi te moto akanga makambo nyonso na motó lokola moto oyo azali kobongisa ekzamɛ moko ya kelasi. Atako bongo, ekosɛnga yo osalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo omindimisa mpenza ete makambo oyo Biblia eteyaka ezali solo. (Baroma 12:1) Na ndakisa:

 Nini nasengeli kosala sikoyo?

 Esengeli kaka te ozala moto ya kokoka mpo ozwa batisimo. Atako bongo, osengeli mpenza komonisa ete olingi ‘kotika oyo ezali mabe, mpe kosala oyo ezali malamu.’ (Nzembo 34:14) Na ndakisa:

 TOLI: Mpo na kosalisa yo omibongisa mpo na batisimo, tángá mokapo 37 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2. Tyá mingimingi likebi na etanda na lokasa 308, 309.

a Tángá lisolo “Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1,” oyo elobeli ndimbola mpe ntina ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo.