Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nakosala nini soki tata to mama na ngai azali maladi?

Nakosala nini soki tata to mama na ngai azali maladi?

 Bilenge mingi bakipaka te likambo etali kosalisa baboti na bango. Kutu, ekoki koleka bambula mingi liboso baboti na bango bákóma kobɛlabɛla.

 Kasi okosala nini soki tata to mama na yo akómi kobɛla ntango ozali naino kokola? Tózwa ndakisa ya bilenge mibale oyo bakutanaki na mokakatano yango.

 Istware ya Emmaline

 Mama abɛlaka maladi oyo esilaka te, oyo babengi (EDS), maladi yango ebebisaka matonga, loposo mpe misisa ya nzoto.

 Maladi yango ezali na nkisi te mpe na boumeli ya mbula zomi oyo eleki maladi yango eyaki makasi. Kutu, na bantango mosusu makila na ye ezalaki kokita mpenza mpe bomoi na ye ezalaki na likama to soki mpasi yango eyei makasi mpenza azalaki lisusu na mposa ya bomoi te.

 Ngai ná bato ya libota na ngai tozali Batatoli ya Yehova mpe lisangá na biso ebɔndisaka biso mpenza! Na ndakisa, kala mingi te elenge mwasi moko oyo tozali na ye mbula moko atindelaki libota na biso karte mpe akomaki na karte yango ete alingaka biso mingi mpe soki tozali na mposa ya lisalisi, akosunga biso. Ezali esengo mpenza kozala na moninga ya bongo!

 Biblia esalisaka ngai mpenza. Na ndakisa, Nzembo 34:18, ezali mokapo oyo nalingaka mingi; elobi boye: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.” Mosusu ezali Baebre 13:6, oyo elobi: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”

 Namonaka ete mokapo oyo ezalaka na ntina mingi mpo na ngai. Likambo ebangisaka ngai makasi ezali ete mama na ngai akokufa. Nalingaka ye mingi mpenza mpe namonisaka botɔndi mpo na ntango oyo tolekisaka na ye mokolo na mokolo. Vɛrsɛ yango esalisaka ngai nabungisa elikya te ata soki likambo nini ekómeli ngai na mikolo ezali koya.

 Kasi likambo mosusu mpe ebangisaka ngai. Maladi oyo mama abɛlaka ezali maladi ya libota. Mama azwaki yango epai ya mama na ye mpe ngai nazwá yango epai na ye. Ezali bongo; ngai mpe nazali na maladi yango. Kasi Baebre 13:6 endimisaka ngai ete Yehova akozala mpe “mosungi na ngai” na likambo oyo.

 Kasi, nasalaka nyonso nasepela na oyo nazali na yango sikoyo mpe namitungisa te mpo na makambo oyo eleká to mpo na avenire. Nakoki kobɛla maladi ya makanisi soki nakokanisi makambo oyo mama akokaka lisusu kosala te na oyo azalaki liboso kosala. Biblia elobi ete bampasi oyo tozali komona lelo ezali “ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ” soki tokokanisi yango na elikya ya bomoi ya seko oyo ezangi maladi.​—2 Bakorinti 4:17; Emoniseli 21:1-4.

 Omituna boye: Nini esalisaka Emmaline abungisa esengo te? Ndenge nini okoki kobatela esengo na yo ata okutani na mikakatano?

 Istware ya Emily

 Tata abandaki maladi ya kotungisama na makanisi ntango nazalaki na eteyelo ya ntei. Ezalaki lokola tata mosusu azwi esika ya tata na ngai. Kobanda wana, tata akómá mawamawa, kobangabanga mpe kotungisama na makanisi. Ekoki sikoyo mbula 15 banda abɛlá maladi yango. Esalaka ye mpasi ndenge azalaka mawamawa atako ayebi ete azali na ntina te ya komiyoka bongo!

 Tozali Batatoli ya Yehova mpe bandeko ya lisangá oyo toyanganaka basungaka biso mpenza. Bandeko yango bamoniselaka biso boboto mpe bamityaka na esika na biso; moko te asalaka ete tata amiyoka lokola azangi ntina na lisangá. Komona ndenge tata ayikaka mpiko na mpasi na ye etindaka ngai nalinga ye lisusu mingi koleka.

 Nalingaka tata azonga ndenge azalaki liboso, azala na kimya na makanisi mpe na esengo. Esalaka ngai mabe ndenge abundaka mokolo na mokolo na monguna oyo amonanaka te, oyo azalaka na makanisi na ye.

 Ata bongo, tata asalaka makasi abatela makanisi malamu. Kala mingi te, ntango atungisamaki makasi na makanisi, asalaki makasi atángaka mwa moke Biblia mokolo na mokolo, ata soki ezalaki kaka mwa bavɛrsɛ. Yango elendisaki ye mpenza. Mwa momeseno yango esalisaki ye mpenza. Na boumeli ya ntango yango nasepelaki lisusu mingi na tata na ngai.

 Nasepelaka mpenza na Nehemia 8:10, oyo elobi: “Esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.” Maloba yango ezali solo mpenza. Esengo nayokaka ntango nazali na bandeko ya lisangá, kopesa biyano na makita mpe koteya nsango malamu esalisaka ngai ntango mawa ezwi ngai mpe namiyoki lokola nazangi eloko. Esalaka ete namiyoka malamu mokolo mobimba. Ndakisa ya tata eteyá ngai ete ata soki okutani na mokakatano nini, Yehova akozala ntango nyonso wana mpo na kosalisa yo.

 Omituna boye: Ndenge nini Emily asalisaki tata na ye na maladi? Ndenge nini okoki kosalisa moto moko oyo azali kotungisama na makanisi?