Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bomoto ezali kaka lisano mpamba?

Koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bomoto ezali kaka lisano mpamba?

 Okanisi nini?

  •   Kosalela horoscope, mwa tablo mpo na koyeba makambo to kokende epai ya banganga-nkisi ezali mabe?

  •   Masolo ya makambo oyo eleki mayele ya bomoto ezali kaka masapo mpamba​—etumba na ndenge ya elilingi kati na mabe mpe malamu to ezali mpenza makambo ya solo mpe ezali likama?

 Lisolo oyo ekomonisa mpo na nini misala ya bilimo mabe ekoki kobenda likebi ya bato mpe mpo na nini osengeli kozala ekɛngɛ.

 Nini ebendaka bato?

 Kolobela makambo oyo eleki mayele ya bomoto na bafilme, na baemisyo ya televizyo, na masano ya video mpe na babuku ekɔtiseli bakompanyi na yango mbongo mingi. Mpo na yango, bilenge mingi bakómi kosepela na astroloji, bademo, ba-vampire mpe bondɔki. Mpo na nini? Mpo na bantina lokola:

  •   Mposa kaka ya koyeba: Koyeba soki mokili ya bilimo ezalaka

  •   Mitungisi: Koluka koyeba makambo oyo ekoya

  •   Kosolola: Koluka kosolola na ndeko to moninga oyo akufá

 Bantina yango moko ekoki kozala mabe te. Na ndakisa, ezali mabe te komitungisa mpo na avenire to koyoka mposa ya ndeko to moninga oyo akufá. Kasi ezali na makama oyo osengeli koyeba.

 Mpo na nini kozala ekɛngɛ?

 Biblia ekebisi makasi kozala na boyokani na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. Na ndakisa, elobi boye:

 “Epai na yo moto azwama te oyo azali . . . kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.”​—Kolimbola Mibeko 18:10-12.

 Mpo na nini Biblia epekisi makasi misala ya bilimo mabe?

  •   Misala ya bilimo mabe ekɔtisaka moto na boyokani na bademo. Biblia eteyaka ete baanzelu mosusu batɔmbɔkelaki Nzambe mpe bamikómisá banguna na ye. (Ebandeli 6:2; Yuda 6) Baanzelu mabe yango, oyo babengaka bango bademo, basalelaka bato oyo basololaka na bilimo, bato oyo basakolaka makambo oyo ekoya, makambo oyo ebombaná mpe astroloji mpo na kobungisa bato nzela. Kosala makambo yango ekokómisa biso banguna ya Nzambe.

  •   Misala ya bilimo mabe etindaka bato bándima ete bato mosusu bazali na likoki ya koyeba makambo oyo ekoya. Kasi, kaka Nzambe nde alobi: “Banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.”​—Yisaya 46:10; Yakobo 4:13, 14.

  •   Misala ya bilimo mabe etindaka bato bándima ete bakufi bakoki kosolola na bato ya bomoi. Kasi, Biblia elobi: “Bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”​—Mosakoli 9:5, 10.

 Yango wana, Batatoli ya Yehova baboyaka makambo oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe. Baboyaka mpe bafilme to babuku oyo elobelaka bilima, ba-vampire mpe makambo oyo esalemaka na ndenge ya bomoto te. Elenge mwasi moko na nkombo Maria, alobi boye: “Soki na kati ezali na likambo moko oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe, boye nasengeli kotala yango te.” a

Kaka ndenge mobomi-bato akoki komibimisa lokola moto mosusu mpo na kokosa yo, bademo mpe bamibimisaka lokola bandeko to baninga na biso oyo bakufá

 Oyo okoki kosala

  •   Zalá na ekateli ya “kozala na lisosoli oyo ezali komonisa ete osali mabe moko te” liboso ya Yehova mpe boyá likambo to kominanola nyonso oyo ezali na makambo oyo eleki mayele ya bomoto.​—Misala 24:16.

  •   Longolá eloko nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bademo. Tángá Misala 19:19, 20 mpe talá ndakisa malamu oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso batiká mpo na likambo yango.

 Kobosana te: Soki oboyi makambo mpe kominanola oyo ezali na boyokani na misala ya bademo, okomitya na ngámbo ya Yehova. Mpe yango ekosepelisa motema na ye!​—Masese 27:11.

a Yango elingi koloba te ete masapo nyonso elendisaka misala ya bilimo mabe. Kasi bakristo basalelaka lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia mpo na koboya likambo to kominanola nyonso oyo ezali na misala ya bilimo mabe na kati.​—2 Bakorinti 6:17; Baebre 5:14.