Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini nayekola monɔkɔ ya sika?

Mpo na nini nayekola monɔkɔ ya sika?

 Koyekola monɔkɔ mosusu ekoki komonisa soki tozalaka na komipekisa mpe na komikitisa. Ezali na ntina kosala milende mpo na koyekola monɔkɔ mosusu? Bilenge mingi bakoloba Ɛɛ! Lisolo oyo ekomonisa ntina oyo basalaka yango.

 Mpo na nini kosala yango?

 Mingi bayekolaka monɔkɔ mosusu mpo kelasi esɛngi báyekola yango. Basusu ezalaka nde milende na bango moko. Na ndakisa:

  •   Anna, elenge mwasi moko na Australie, azwaki ekateli ya koyekola Lettone, monɔkɔ ya mboka ya mama na ye. Anna, alobi boye: “Libota na biso ezali komibongisa mpo na kosala mobembo na Lettonie mpe nalingi te nazala na mokakatano ya kosolola na bandeko na biso ntango tokokende kuna.”

  •   Gina, Motatoli ya Yehova na États-Unis, ayekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya Amerika mpe akendaki na Bélize mpo na kosakola nsango malamu. Alobi boye: “Baba akoki kozala kaka na bato moke oyo bakoki kosolola na ye. Bato basepelaka mpenza ntango nayebisaka bango ete nayekolaki elobeli ya bajɛstɛ mpo na koteya bababa na monɔkɔ na bango!”

 Oyebaki yango? Biblia esakolaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama epai ya bato ya “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 14:6) Mpo na kokokisa maloba ya esakweli oyo, bilenge mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova bayekolaki monɔkɔ mosusu mpo kosakola lisusu mingi na mboka na bango to na mboka mopaya.

 Mikakatano ezali wapi?

 Koyekola monɔkɔ mosusu ezali pɛtɛɛ te. Elenge mwasi moko na nkombo Corrina, alobi boye: “Nakanisaki ete ekosɛnga kaka koyekola maloba ya sika, kasi namonaki ete esɛngaki mpe koyekola mimeseno ya sika mpe lolenge ya sika ya kokanisa. Mpo na koloba solo, esɛngaka ntango mpo na koyekola monɔkɔ moko.”

 Esɛngaka mpe kozala na komikitisa. James, elenge mobali moko oyo ayekolaki monɔkɔ ya Espagnol, alobi boye: “Ebongi ozwaka makambo mosusu na ndenge ya lisɛki mpo okosala mabunga mingi. Yango ezangaka te ntango moto azali koyekola.”

 Na mokuse: Soki olɛmbi nzoto te mpo na mabunga mosusu oyo okoki kosala; okoki kolonga koyekola monɔkɔ mosusu.

 Lisalisi: Kobungisa elikya te soki emonani ete basusu bazali koyeba mbangu koleka yo. Biblia elobi: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4.

 Wapi matomba na yango?

 Koyekola monɔkɔ ya sika ezali na matomba mingi. Na ndakisa, elenge mwasi moko na nkombo Olivia, alobi boye: “Soki oyekoli monɔkɔ ya sika, okofungwama mpe okozwa baninga ya sika.”

 Elenge mosusu na nkombo Mary amonaka ete koyekola monɔkɔ ya sika esalisi ye akóma komityela motema. Alobi boye: “Ezalaka mpasi nasepela na eloko moko oyo nasali, kasi sikoyo lokola nazali koyekola monɔkɔ ya sika, nakómi kosepela mbala nyonso oyo nayekoli liloba ya sika. Ekómi kosala ete namiyoka malamu.”

 Gina, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete koteya bato Biblia na elobeli ya bajɛstɛ ebakiselaki ye esengo na mosala na ye ya kosakola. Abakisi boye: “Komona ndenge bato bazali kosepela makasi ntango nazali kosolola na bango na monɔkɔ na bango ezali litomba monene mpenza!”

 Na mokuse: Koyekola monɔkɔ ya sika ekoki kosalisa yo ozwa baninga ya sika, okóma komityela motema mpe mosala na yo ya kosakola ekóma na ntina mingi lisusu. Ezali na ntina mpo na kosakwela bato ya “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” nsango malamu.​—Emoniseli 7:9.