Mokanda ya liboso ya Petro 5:1-14

  • Bóbatela etonga ya Nzambe (1-4)

  • Bózala na komikitisa mpe bózala ekɛngɛ (5-11)

    • Bóbwakela Nzambe mitungisi nyonso (7)

    • Zabolo azali lokola nkɔsi oyo ezali koganga (8)

  • Maloba ya nsuka (12-14)

5  Yango wana, ngai nkulutu lokola bino, motatoli ya bampasi ya Kristo, mpe moto oyo akozwa nkembo oyo ekomonana,+ nazali kosɛnga* bankulutu oyo bazali na kati na bino ete:  Bóbatela etonga ya Nzambe+ oyo epesami na mabɔkɔ na bino, bósala lokola bakɛngɛli,* na kotindikama te, kasi na motema moko liboso ya Nzambe;+ ezala te na bolingo ya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ kasi na motema ya esengo;  bókonza te baoyo bazali libula ya Nzambe,+ kasi bókóma nde bandakisa mpo na etonga.+  Mpe ntango mobateli ya mpate mokonzi+ akomonana, bokozwa motole* ya nkembo oyo ebebaka te.+  Ndenge moko mpe, bino bilenge mibali, bómikitisaka liboso ya mikóló.*+ Kasi bino nyonso bólata* komikitisa na boyokani na bino na basusu, mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+  Yango wana, bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ebongi;+  wana bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso,+ mpo atyelaka bino likebi.*+  Bóbatela makanisi na bino, bózala ekɛngɛ!+ Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga, azali koluka kolya moto.*+  Kasi bótɛmɛla ye,+ bópikama makasi na kondima, bóyeba ete bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na bino* na mokili.+ 10  Kasi, nsima ya komona mpasi mwa ntango moke, Nzambe ya boboto monene nyonso, oyo abengaki bino na nkembo na ye+ ya seko na bomoko na Kristo, ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi,+ akokómisa bino makasi, akopika bino makasi.+ 11  Ye azala na nguya libela na libela. Amen. 12  Nakomeli bino na maloba moke, na nzela ya Silvano,*+ oyo natalelaka lokola ndeko ya sembo, mpo na kolendisa bino mpe kopesa litatoli na molende ete boboto monene oyo Nzambe amoniseli bino ezali ya solo. Bótɛlɛma ngwi na kati na yango. 13  Mwasi* oyo azali na Babilone, oyo aponami lokola bino, atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko,+ mwana na ngai. 14  Bópesana mbote na lipwɛpwɛ ya bolingo. Kimya ezala na bino nyonso oyo bozali na bomoko na Kristo.

Maloba na nse

To, “kolendisa.”
To, “bókɛngɛla yango na likebi.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To, “bankulutu.”
To, “bókanga.”
To, “akipaka bino.”
To, “azali koluka moto ya kolya.”
Lil., “bandeko na bino nyonso.”
Bazalaki mpe kobenga ye Silasi.
Liloba ya Grɛki oyo basaleli awa ezali kolobela mwasi mpe emonani ete ezali komonisa lisangá oyo ezalaki na Babilone.