Masese 18:1-24

  • Moto oyo alingaka kozala ye moko azali moimi mpe azangi bwanya (1)

  • “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi” (10)

  • Bomɛngo ezali kaka libateli na makanisi ya moto (11)

  • Koyoka ngámbo mibale ezali likambo ya bwanya (17)

  • Moninga akangamaka makasi koleka ndeko (24)

18  Moto oyo alingaka kozala kaka ye moko alukaka bamposa na ye mokoya moimi;Atyolaka* makambo nyonso ya bwanya.   Zoba asepelaka na bososoli te;Abimisaka nde makambo oyo ezali na motemana ye.+   Ntango moto mabe ayei, kotyola mpe eyei,Elongo na kosambwa mpe nsɔni.+   Maloba ya moto ezali mai mozindo.+ Liziba ya bwanya ezali lokola mai oyo ezali kosopana.   Ezali malamu te kokɔtela moto mabe+To koboyela moyengebene bosembo na ntango ya kosambisa.+   Maloba ya zoba ememakana koswana,+Mpe monɔkɔ na ye etindaka basusu bábɛta ye.+   Monɔkɔ ya zoba ezali libebi na ye,+Mpe mbɛbu na ye ezali motambo mpo na bomoi* na ye.   Maloba ya moto oyo akoselaka bato makambo ezali lokola biloko oyo esengeli komɛlama na lokoso;+Ekitaka mpenza tii na kati ya libumu.+   Moto oyo azali gɔigɔi na mosala na yeAzali ndeko ya moto oyo abebisaka.+ 10  Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moto ya sembo akimaka kuna mpe azwaka libateli.*+ 11  Bomɛngo ya mozwi ezali engumba na ye oyo ebatelami makasi;Na makanisi na ye, yango ezali lokola efelo oyo ebatelaka.+ 12  Lolendo ememaka na kokwea,+Mpe komikitisa ememakana nkembo.+ 13  Moto oyo apesaka eyano liboso ya koyoka likambo azali zoba,Mpe amisambwisaka.+ 14  Makanisi* malamu ekoki kosalisa moto na ntango ya maladi,+Kasi nani akoki kolonga kolɛmba nzoto?*+ 15  Motema ya moto ya mayele ezwaka boyebi,+Mpe litoi ya moto ya bwanya elukaka kozwa boyebi. 16  Likabo oyo moto apesi ekofungolela ye nzela polele;+Yango ekomema ye epai ya bato minene. 17  Moto oyo asambaka liboso, emonanaka lokola ete alobi solo,+Tii moto oyo azali kosamba ná ye akoya mpe akolandela ye malamumalamu.+ 18  Mbɛsɛ esukisaka kowelana+Mpe ekataka likambo kati na bato mibale ya nguya. 19  Ndeko oyo basali mabe azalaka matata koleka engumba oyo ebatelami makasi,+Mpe kowelana mosusu ezali lokola bikangiseli ya ndako molai ya kofanda.+ 20  Moto akotondisa libumu na ye na maloba oyo ebimaka na monɔkɔ na ye;+Akotonda mpenza na makambo oyo ezali kobima na mbɛbu na ye. 21  Liwa ná bomoi ezali na nguya ya lolemo;+Baoyo balingaka kosalela yango bakolya mbumana yango.+ 22  Moto oyo azwi mwasi ya malamu, azwi lipamboli,+Mpe Yehova andimaka ye.+ 23  Mobola alobaka na kobondela,Kasi mozwi ayanolaka na maloba makasi. 24  Baninga mosusu bazalaka pene ya kosalana mabe,+Kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.+

Maloba na nse

To, “Abwakaka.”
To, “molimo.”
Lil., “etombwani likoló,” elingi koloba, likama ekokómela te moto oyo akimi kuna.
Lil., “Elimo.”
To, “kozanga mpenza elikya.”