Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI

Mpo na nini bilenge mosusu banyokwamaka na makanisi?—Nini ekoki kosalisa?

Mpo na nini bilenge mosusu banyokwamaka na makanisi?—Nini ekoki kosalisa?

ANNA, * alobi boye: “Soki nakómi konyokwama na makanisi nazalaka lisusu na mposa ya kosala eloko moko te, ata makambo oyo nalingaka. Nazalaka kaka na mposa nalala. Mbala mingi namiyokaka lokola bakoki kolinga ngai te, nazangi ntina mpe nazali kotya bato nkaka.”

Julia alobi boye: “Makanisi ya komiboma eyelaki ngai. Nazalaki mpenza na mposa ya liwa te. Nazalaki kaka na mposa ya kotika komiyoka bongo. Nazali moto ya bato, kasi soki nanyokwami na makanisi, nakipaka moto te, ata eloko moko mpe te.”

Anna ná Julia bazalaki bilenge mpenza ntango banyokwamaki na makanisi mpo na mbala ya liboso. Bilenge mosusu bakoki konyokwama na makanisi mpo na mwa ntango, kasi ya Anna ná Julia eumelaki bapɔsɔ to basanza. Anna abakisi boye: “Ezali lokola kokangama na libulu moko ya molili mpe ya mozindo oyo ezangi nzela ya kobimela. Ozali komiyoka lokola obɛli motó, okómi moto mosusu.”

Bato mingi mpe bakutanaka na likambo yango. OMS elobi boye: “Motángo ya bilenge oyo banyokwamaka na makanisi ezali se kobakisama, yango nde ezali kosala ete ezala bilenge basi to mibali ya mbula 10 tii 19 bábɛlaka mingi mpe bázala na likoki te ya kosala makambo mosusu.”

Bilembo ya maladi yango ekoki komonana na eleko ya bolenge mpe mbongwana ekoki kokɔta na makambo lokola mpɔngi, kolya mpe kilo ya nzoto. Elenge akoki mpe komiyoka lokola azangi elikya, azali mawamawa mpe azangi ntina. Ekoki mpe komonana na bilembo lokola kozala mosika na bato, makanisi ezali koyengayenga to kobosana makambo, makanisi ya komiboma to koluka komiboma mpe bilembo mosusu oyo ekoki kolimbolama te. Soki minganga bamoni lokola ezali maladi ya makanisi, mbala mingi balukaka koyeba bilembo ya maladi yango oyo eumeli bapɔsɔ mpe ezali konyokola moto yango mokolo na mokolo.

MAKAMBO OYO EKOKI KOSALA ETE BILENGE BÁNYOKWAMA NA MAKANISI

OMS elobi boye: “Maladi ya konyokwama na makanisi eutaka na kozanga kofanda malamu na bato, kokanisakanisa to ndenge nzoto ya moto ezali.” Yango esangisi makambo oyo elandi.

Nzoto ya moto. Ndenge ekómelaki Julia, mbala mingi maladi ya konyokwama na makanisi etalelaka ndenge moto abotamá, yango elingi koloba ete ba-gènes nde ekoki kosala bongo, mbala mosusu ekoki kobebisa mosala oyo bɔɔngɔ esalaka. To mpe soki moto abɛlaka maladi ya motema, mbongwana ekoki kokɔta na ba-hormones na ye mpe soki azali kokoba kosalela biloko lokola drɔgɛ to bankisi mosusu, yango mpe ekoki kobakisa maladi yango to kosala ete abɛla yango. *

Komitungisa. Atako komitungisa moke ezalaka mabe te, kasi komitungisa ntango nyonso to koleka ndelo, ekoki kobebisa sante to makanisi ya moto, mpe kosala ete elenge oyo abɛlaka mingi akóma konyokwama na makanisi. Na yango, ntina mpenza oyo esalaka ete moto anyokwama na makanisi eyebani polele te mpe ekoki kosangisa makambo ebele, ndenge tolobeli yango na ebandeli.

Makambo mosusu oyo ekoki kosala ete elenge amitungisa mpe akóma konyokwama na makanisi ezali soki baboti babomi libala to bakabwani, liwa ya ndeko to moninga moko, kobɛta to kosangisa na ye nzoto na makasi, aksida ya monene, maladi to mpe azali mayele mpenza te, mingimingi soki azali komona ete balingaka ye te mpo na yango. Likambo mosusu mpe ezali soki baboti bazali kosɛnga mwana asala likambo oyo akokoka te, mbala mosusu azwa bapwɛ mingi na kelasi. Ekoki mpe kozala soki bazali konyokola ye, azali koyeba te ndenge avenire na ye ekozala, motungisi oyo euti epai ya moboti na ye oyo azali konyokwama na makanisi to soki ayebi baboti na ye te. Nini ekoki kosalisa elenge soki akómi konyokwama na makanisi?

BATELÁ MAKANISI MPE NZOTO NA YO

Soki moto abandi konyokwama na makanisi to ekómi makasi, mbala mingi esɛngaka amɛla bankisi mpe azwa toli ya monganga. * Yesu Kristo alobaki: “Baoyo bazali nzoto makasi bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde baoyo bazali na maladi.” (Marko 2:17) Maladi ekoki kobebisa ata eteni nini ya nzoto, ata mpe bɔɔngɔ na biso! Ekoki kosɛnga moto abongola lolenge ya bomoi na ye mpo soki azali konyokwama na makanisi, nzoto mpe ekozala malamu te.

Soki ozali konyokwama na makanisi, salá makambo oyo esengeli mpo na kobatela nzoto mpe makanisi na yo. Na ndakisa, lyáká bilei ya malamu, laláká mingi mpe saláká ngalasisi mbala na mbala. Ngalasisi ebongisaka makanisi ya moto, ebakisaka makasi mpe esalaka ete moto alala malamu. Soki likoki ezali, luká koyeba ntina mpe bilembo oyo emonisi ete maladi yango ebandi mpe salá makambo oyo esengeli mpo na kobundisa maladi yango. Sololá na moto oyo otyelaka motema. Lisalisi ya bandeko mpe baninga ekoki kosalisa yo olonga maladi yango to mpe bilembo na yango ezala mingi te. Komá makanisi na yo na kaye mpe ndenge ozali komiyoka; yango nde esalisaki Julia oyo tolobelaki liboso. Likambo eleki ntina, kómisá boyokani na yo na Nzambe makasi. Yango ekoki kobongisa ndenge oyo otalelaka bomoi. Yesu Kristo alobaki: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.”Matai 5:3.

Lyáká malamu, saláká mosala mpe laláká mingi

Koyeba makambo ya Nzambe ekoki kobɔndisa yo

Anna ná Julia bandimi maloba wana ya Yesu. Anna alobi boye: “Makambo ya Nzambe esalaka ete nakipe kaka makambo na ngai moko te kasi mpe ya basusu. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi esalaka ete nazala na esengo.” Libondeli mpe kotánga Biblia ekitisaka Julia motema. Alobi boye: “Kofungolela Nzambe motema na libondeli ekitisaka ngai motema. Biblia esalisaka ngai namona nazali na ntina na miso ya Nzambe mpe akipaka ngai mpenza. Esalisaka ngai mpe natalela avenire na makanisi ya malamu.”

Lokola Yehova nde akelá biso, ayebaka mpenza ndenge tokolá, makambo oyo tokutaná na yango mpe ndenge nzoto na biso esalaka ete tótalela makambo to tómiyoka boye to boye. Yango wana azali na likoki ya kosalisa mpe kobɔndisa biso; ntango mosusu asalaka yango na nzela ya bato ya boboto mpe oyo bamityaka na esika na biso. Longola yango, ezali na mokolo oyo Nzambe akobikisa biso na maladi nyonso, ezala na nzoto to makanisi. Yisaya 33:24 elobi: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”

Ɛɛ, Biblia epesi elaka ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Oyo nde maloba ya kolendisa mpe ya kobɔndisa! Soki okolinga koyeba makambo mosusu etali mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele, tosɛngi yo okɔta na jw.org. Kuna okokuta Biblia na Internet mpe mikanda mosusu oyo elobeli makambo ndenge na ndenge ata mpe likambo etali konyokwama na makanisi.

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 10 Ebele ya bamaladi, bankisi mpe badrɔgɛ oyo batɛkaka na balabala ekoki kobebisa makanisi ya moto, ekoki kosɛnga ete akende epai ya monganga kosalisa baekzamɛ.

^ par. 14 Lamuká! etindi moto te asalela nkisi boye to boye.