Epai ya Bagalatia 6:1-18

  • Bómemelanaka kilo (1-10)

    • Tokobuka oyo tozali kolona (7, 8)

  • Kokatama ngenga ezali na ntina te (11-16)

    • Ekelamu ya sika (15)

  • Maloba ya nsuka (17, 18)

6  Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo, bóluka kosembola moto yango na elimo ya boboto.+ Kasi yo moko mpe omitalaka,+ noki yo mpe omekama.+  Bókoba komemelana kilo,+ mpe na ndenge yango bókokisa mobeko ya Kristo.+  Mpo soki moto akanisi ete azali moto ya ntina, nzokande azali moto mpamba,+ azali komikosa.  Moto na moto ameka mosala na ye moko,+ bongo akozwa likambo ya kosepela na yango mpo na ye moko, kasi te mpo azali komikokanisa na moto mosusu.+  Mpo moto na moto akomema mokumba na ye moko.*+  Lisusu, tiká ete moto nyonso oyo azali koteyama* liloba akabolaka biloko nyonso ya malamu elongo na moto oyo azali kopesa liteya* yango.+  Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka;+  mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye, kasi moto oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko oyo euti na elimo.+  Yango wana, tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ebongi tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.*+ 10  Na yango, ntango nyonso oyo tozwi libaku,* tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima. 11  Bótala ndenge nakomeli bino na balɛtrɛ ya mineneminene na lobɔkɔ na ngai moko. 12  Baoyo nyonso bazali koluka komonana malamu na nzoto nde bato oyo bazali koluka kotinda bino bókatama ngenga, nyonso wana kaka mpo bányokwama te mpo na nzete ya mpasi* ya Kristo. 13  Mpo ata bango moko baoyo bazali kokatama ngenga batosaka Mibeko te,+ kasi balingi bino bókatama ngenga mpo bázwa likambo ya komikumisa na yango mpo na nzoto na bino. 14  Kasi ngai, nakomikumisa ata moke te, longola kaka mpo na nzete ya mpasi* ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ Mpo na ngai, na nzela na ye mokili ebomami,* kasi mpo na mokili, ngai nabomami na nzela na ye. 15  Mpo likambo ya ntina ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te,+ kasi ezali nde kozala ekelamu ya sika.+ 16  Bato nyonso oyo bakolanda mpenza mitindo oyo, kimya mpe motema mawa ezala na bango, ɛɛ likoló ya Yisraele ya Nzambe.+ 17  Banda sikoyo, moto moko te atungisa ngai lisusu, mpo nazali na bilembo na nzoto oyo emonisi ete nazali moombo ya Yesu.+ 18  Bandeko, boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa. Amen.

Maloba na nse

To, “akokokisa mikumba na ye.”
To, “bateyaka ye na maloba boye.”
To, “liloba na monɔkɔ.”
To, “soki totiki te.”
Lil., “na ntango oyo ebongi.”
To, “ebakami na nzete.”