Mokanda ya Yakobo 4:1-17

  • Kozala te moninga ya mokili (1-12)

    • “Bótɛmɛla Zabolo” (7)

    • “Bópusana penepene na Nzambe” (8)

  • Likebisi mpo na koboya komikumisa (13-17)

    • “Soki Yehova alingi” (15)

4  Bitumba mpe kowelana oyo ezali kati na bino ezali kouta wapi? Ezali nde te kouta na bamposa ya mosuni oyo ezali kobundabunda na kati na bino?*+  Bozali na mposa, kasi bozali kozwa te. Bozali kokoba koboma bato mpe kolula biloko ya bato, kasi bozali na likoki ya kozwa te. Bozali kokoba kobunda mpe kosala etumba.+ Bozali kozwa te mpo bosɛngaka te.  Ntango bosɛngaka, bozwaka te, mpamba te bozali kosɛnga na makanisi ya mabe, mpo bókokisa bamposa na bino ya mosuni.  Bato oyo bozangi bosembo,* boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.+  To bokanisi ete likomami elobi kaka mpamba ete: “Makanisi ya likunya oyo efandi na kati na biso ezali ntango nyonso na mposa makasi ya makambo ndenge na ndenge”?+  Atako bongo, boboto monene oyo Nzambe amonisaka ezali monene koleka. Makomami elobi ete: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+  Yango wana, bómikitisa epai ya Nzambe;+ kasi bótɛmɛla Zabolo,+ mpe akokima bino.+  Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.+ Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki,+ mpe bókómisa mitema na bino pɛto,+ bino bato ya mitema mibale.  Bókóma mawamawa, bólela mpe bóbimisa mpisoli.+ Kosɛka na bino ekóma kolela, mpe esengo na bino ekóma kolɛmba nzoto. 10  Bómikitisa na miso ya Yehova,*+ mpe ye akotombola bino.+ 11  Bandeko, bótika kolobelana mabe.+ Moto oyo azali kolobela ndeko mabe to azali kosambisa ndeko na ye azali kolobela mibeko mabe mpe azali kosambisa mibeko. Nzokande soki ozali kosambisa mibeko, ozali motosi ya mibeko te, kasi mosambisi. 12  Ezali na Moto moko kaka oyo apesaka mibeko mpe asambisaka,+ ye oyo akoki kobikisa mpe koboma.+ Kasi yo ozali nani mpo osambisa mozalani na yo?+ 13  Sikoyo bóyoka, bino bato oyo bolobaka: “Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokosala mombongo mpe tokozwa mbongo,”+ 14  nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.+ Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwaka.+ 15  Kutu, bosengeli nde koloba: “Soki Yehova* alingi,+ tokozala na bomoi mpe tokosala boye to boye.” 16  Kasi sikoyo bozali komikumisa na makambo na bino moko ya lolendo. Komikumisa nyonso ya ndenge wana ezali mabe. 17  Yango wana, soki moto ayebi oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te, azali kosala lisumu.+

Maloba na nse

Lil., “na biteni ya nzoto na bino.”
Lil., “Basi ya ekobo.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.