Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti 5:1-13

  • Likambo moko oyo etali pite (1-5)

  • “Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini” (6-8)

  • Moto mabe asengeli kolongolama (9-13)

5  Sikoyo nazali koyoka ete pite*+ ezali kosalema na kati na bino, mpe etamboli ya mbindo ya ndenge wana ezalaka ata kutu te epai ya bikólo: mobali moko azwi mwasi ya tata na ye.+  Mpe bozali komikumisa mpo na yango? Bosengeli kutu te nde kozala na mawa,+ mpo mobali oyo asali likambo wana alongolama na kati na bino?+  Atako na nzoto nazali wana te, na elimo nazali wana. Nasili kosambisa moto oyo asali likambo ya ndenge wana, lokola nde nazalaki wana.  Ntango bokoyangana na nkombo ya Nkolo na biso Yesu, bóyeba ete nazali elongo na bino na elimo ná nguya ya Nkolo na biso Yesu,  bópesa moto yango epai ya Satana+ mpo na kolongola etamboli wana ya masumu,* mpo elimo ya malamu ya lisangá ebatelama na mokolo ya Nkolo.+  Ezali malamu te ndenge bozali komikumisa mpo na likambo ya bongo. Boyebi te ete mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini?+  Bólongola levire ya kala, mpo bózala pɔtɔpɔtɔ ya sika ya farini, lokola levire ezali te na kati na bino. Mpo ya solo, Kristo Elekeli na biso+ apesami mbeka.+  Na yango, tósala fɛti yango,+ na levire ya kala te, na levire ya makambo ya mabe te mpe ya ezaleli ya mabe te, kasi na mampa ezangá levire ya bosembo mpe ya solo.  Na mokanda na ngai nakomelaki bino ete bótika kosala boninga na bato ya pite,* 10  nazalaki te kolobela bato ya mokili oyo,+ oyo bazali bato ya pite,* to bato ya lokoso to miyibi* to basambeli ya bikeko. Soki bongo, ekosɛnga bólongwa na mokili.+ 11  Kasi sikoyo nazali kokomela bino ete bókata boninga+ na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite* to moto ya lokoso+ to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga+ to moyibi,*+ bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te. 12  Kosambisa bato oyo bazali libándá ya lisangá ezali mokumba na ngai te. Bino bosengeli nde te kosambisa bato ya kati, 13  wana Nzambe azali kosambisa baoyo ya libándá?+ “Bólongola moto mabe na kati na bino.”+

Maloba na nse

Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mpo mosuni ebebisama.”
To, “babɔtɔli.”
To, “mobɔtɔli.”