Ndenge ekomamá na Yoane 6:1-71

  • Yesu aleisi mibali 5 000 (1-15)

  • Yesu atamboli likoló ya mai (16-21)

  • Yesu, “limpa ya bomoi” (22-59)

  • Mingi babɛti libaku na maloba ya Yesu (60-71)

6  Nsima na yango, Yesu akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu ya Galile, to ya Tiberiase.+  Mpe ebele mpenza ya bato bakobaki kolanda ye,+ mpo bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala, ya kobikisa bato ya maladi.+  Bongo Yesu amataki na ngomba moko, mpe afandaki kuna elongo na bayekoli na ye.  Nzokande Elekeli,+ fɛti ya Bayuda, ekómaki pene.  Ntango Yesu atombolaki miso mpe amonaki ete ebele ya bato bazali koya epai na ye, alobaki na Filipe boye: “Epai wapi tokosomba mampa mpo na koleisa bato oyo?”+  Nzokande, azalaki koloba bongo mpo na komeka ye, mpo ye moko ayebaki likambo oyo alingaki kosala.  Filipe ayanolaki ye: “Mampa ya denari* nkama mibale ekokoka te mpo ete mokomoko na bango azwa ata mwa eteni.”  Moyekoli mosusu, na nkombo Andre, ndeko ya Simo Petro, alobaki na ye:  “Mwana mobali moko ya moke azali na mampa mitano ya ɔrje ná mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?”+ 10  Yesu alobaki: “Bófandisa bato.” Lokola matiti ezalaki mingi na esika yango, bato bafandaki; mibali bazalaki soki 5 000.+ 11  Yesu azwaki mampa yango, mpe nsima ya kobondela mpo na kopesa matɔndi, akabolelaki yango baoyo bafandaki wana; asalaki mpe bongo na mbisi wana ya mike, mpe bato bazwaki ndenge balingaki. 12  Kasi ntango balyaki mpe batondaki, alobaki na bayekoli na ye: “Bóyanganisa biteni oyo etikali, mpo ata eloko moko te ebebisama.” 13  Bongo bayanganisaki yango mpe batondisaki kitunga 12 na biteni oyo bato balyaki mampa mitano ya ɔrje batikaki. 14  Ntango bato bamonaki likamwisi oyo asalaki, babandaki koloba: “Oyo azali mpenza mosakoli oyo asengelaki koya na mokili.”+ 15  Bongo Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei+ lisusu na ngomba, kaka ye moko.+ 16  Ntango mpokwa ekómaki, bayekoli na ye bakitaki na mbu,+ 17  bamataki na masuwa moko mpe babandaki kokatisa mbu mpo na kokende na Kapernaume. Na ntango wana, molili esilaki kokɔta mpe Yesu ayaki naino epai na bango te.+ 18  Lisusu, mai ya mbu ezalaki koningana mingi mpo mopɛpɛ moko makasi ezalaki kopɛpa.+ 19  Nzokande, ntango balúkaki bakilomɛtrɛ soki mitano to motoba,* bamonaki Yesu azali kotambola likoló ya mai ya mbu mpe kopusana pene na masuwa, mpe bakómaki kobanga. 20  Kasi alobaki na bango: “Ezali ngai; bóbanga te!”+ 21  Bongo bandimaki kokɔtisa ye na masuwa, mpe na mbala moko masuwa yango ekómaki na mokili, na esika bazalaki kokende.+ 22  Na mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo batikalaki na ngámbo mosusu ya mbu bamonaki ete masuwa ezalaki wana te. Liboso masuwa moko ya moke ezalaki wana, kasi Yesu amataki na masuwa yango te elongo na bayekoli na ye, mpo bayekoli na ye bakendaki bango moko. 23  Nzokande bamasuwa oyo eutaki na Tiberiase ekómaki pene na esika oyo bato balyaki mampa nsima ya libondeli oyo Nkolo asalaki mpo na kopesa matɔndi. 24  Bongo ntango ebele ya bato bamonaki ete ezala Yesu to bayekoli na ye bazalaki wana te, bamataki na bamasuwa na bango mpe bayaki na Kapernaume mpo na koluka Yesu. 25  Ntango bakutaki ye na ngámbo mosusu ya mbu, balobaki na ye: “Rabi,+ ntango nini okómi awa?” 26  Yesu azongiselaki bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Bozali koluka ngai, ezali te mpo bomonaki makamwisi, kasi mpo bolyaki mampa mpe botondaki.+ 27  Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko,+ bilei oyo Mwana ya moto akopesa bino; mpo epai na ye nde Tata, Nzambe ye moko, atye elembo na ye ete andimi ye.”+ 28  Bongo balobaki na ye: “Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala ya Nzambe?” 29  Yesu azongiselaki bango: “Oyo ezali mosala ya Nzambe, ete bómonisa kondima na moto oyo ye atindaki.”+ 30  Bongo balobaki na ye: “Likamwisi nini okosala,+ mpo ete tómona yango mpe tóndima yo? Mosala nini ozali kosala? 31  Bankɔkɔ na biso balyaki mana na esobe,+ ndenge ekomamá ete: ‘Apesaki bango limpa oyo euti na likoló mpo bálya.’”+ 32  Bongo Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza, nalobi na bino: Moize apesaki bino limpa oyo euti na likoló te, kasi Tata na ngai azali kopesa bino limpa ya solosolo oyo euti na likoló. 33  Mpo limpa ya Nzambe ezali oyo euti na likoló mpe oyo ezali kopesa mokili bomoi.” 34  Bongo balobaki na ye: “Nkolo, pesáká biso limpa yango ntango nyonso.” 35  Yesu alobaki na bango: “Ngai nazali limpa ya bomoi. Moto oyo ayei epai na ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te.+ 36  Kasi ndenge nalobaki na bino, bomoni ngai, kasi bozali kondima te.+ 37  Baoyo nyonso Tata apesi ngai bakoya epai na ngai, mpe ngai nakobengana ata moke te moto oyo ayei epai na ngai;+ 38  mpo nautaki na likoló+ nakiti awa mpo na kosala, mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.+ 39  Talá mokano ya moto oyo atindaki ngai: ete nabungisa ata moto moko te na kati ya bato oyo apesaki ngai, kasi ete nasekwisa+ bango na mokolo ya nsuka. 40  Mpo oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo andimi Mwana mpe azali komonisa kondima epai na ye azwa bomoi ya seko,+ mpe nakosekwisa+ ye na mokolo ya nsuka.” 41  Bongo Bayuda babandaki koimaima mpo na ye mpamba te alobaki: “Ngai nazali limpa oyo euti na likoló.”+ 42  Mpe bazalaki koloba: “Oyo Yesu mwana ya Yozefe te, oyo toyebi tata na ye ná mama na ye?+ Ndenge nini azali sikoyo koloba ete: ‘Nauti na likoló’?” 43  Bongo Yesu alobaki na bango: “Bótika koimaima na kati na bino. 44  Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te;+ mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.+ 45  Ekomamá na Basakoli ete: ‘Bango nyonso bakoteyama na Yehova.’*+ Moto nyonso oyo ayoki Tata mpe ayekoli ayaka epai na ngai. 46  Moto moko te amoná Tata,+ longola kaka moto oyo auti epai ya Nzambe, ye nde moto amoná Tata.+ 47  Ya solo mpenza nalobi na bino: Moto oyo andimi azali na bomoi ya seko.+ 48  “Ngai nazali limpa ya bomoi.+ 49  Bankɔkɔ na bino balyaki mana na esobe mpe atako bongo bakufaki.+ 50  Kasi oyo ezali limpa oyo euti na likoló, mpo ete moto nyonso alya yango mpe akufa te. 51  Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló. Soki moto alei limpa yango, akozala na bomoi libela na libela; mpe ya solo, limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.”+ 52  Bongo Bayuda babandaki kotyana ntembe bango na bango, balobi: “Ndenge nini moto oyo akoki kopesa biso mosuni na ye mpo tólya?” 53  Na yango Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi te na kati na bino.+ 54  Moto oyo alei mosuni na ngai mpe amɛli makila na ngai azali na bomoi ya seko, mpe nakosekwisa+ ye na mokolo ya nsuka; 55  mpo mosuni na ngai ezali bilei ya solosolo mpe makila na ngai ezali eloko ya komɛla ya solosolo. 56  Moto oyo alei mosuni na ngai mpe amɛli makila na ngai azali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye.+ 57  Kaka ndenge Tata ya bomoi atindaki ngai mpe ngai nazali na bomoi mpo na Tata, ndenge moko mpe moto oyo alei mosuni na ngai akozala na bomoi mpo na ngai.+ 58  Oyo ezali limpa oyo euti na likoló. Ezali te lokola ntango bankɔkɔ na bino balyaki kasi bakufaki. Moto oyo alei limpa oyo akozala na bomoi libela na libela.”+ 59  Alobaki makambo wana ntango azalaki koteya na sinagoga moko* na Kapernaume. 60  Ntango bayokaki yango, mingi kati na bayekoli na ye, balobaki: “Maloba oyo ezali makasi! Nani akoki koyoka yango?” 61  Kasi lokola Yesu ayebaki na kati na ye moko ete bayekoli na ye bazalaki koimaima mpo na yango, alobaki na bango: “Yango ebɛtisi bino libaku? 62  Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana ya moto azali komata epai azalaki liboso?+ 63  Ezali elimo nde epesaka bomoi;+ mosuni ezali ata na ntina moko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali elimo mpe ezali bomoi.+ 64  Kasi ezali na basusu na kati na bino oyo bazali kondima te.” Mpo Yesu ayebaki banda na ebandeli baoyo bazalaki kondima te mpe moto oyo alingaki kotɛka ye.+ 65  Alobaki lisusu: “Yango wana nalobaki na bino: Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te.”+ 66  Mpo na yango, bayekoli na ye mingi bazongelaki biloko oyo ezalaki na nsima+ mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te. 67  Bongo Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale: “Bongo bino, bolingi kokende te?” 68  Simo Petro azongiselaki ye: “Nkolo, tokokende epai ya nani?+ Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.+ 69  Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe.”+ 70  Yesu alobaki na bango: “Naponaki bino zomi na mibale, boye te?+ Kasi moko na bino azali mokoseli-bato-makambo.”*+ 71  Azalaki kolobela nde Yudasi mwana ya Simo Mokeriota, mpo ye nde alingaki kotɛka ye, nzokande azalaki moko ya bantoma zomi na mibale.+

Maloba na nse

Talá Ap. B14.
Lil., “bastade soki 25 to 30.” Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “liyangani ya bato nyonso.”
To, “zabolo moko.”