Misala ya bantoma 24:1-27

  • Bifundeli mpo na kokweisa Paulo (1-9)

  • Paulo asambi liboso ya Feliksi (10-21)

  • Likambo ya Paulo ekokatama nsima ya mbula mibale (22-27)

24  Mikolo mitano na nsima, nganga-nzambe monene Ananiasi+ akitaki elongo na ndambo ya bankulutu mpe molobeli moko na nkombo Tertulusi, mpe bafundaki Paulo epai ya guvɛrnɛrɛ.+  Ntango babengaki ye, Tertulusi abandaki kofunda Paulo, alobi: “Lokola tozali na kimya monene mpo na yo mpe lokola mbongwana ezali kosalema na ekólo oyo mpo na mayele na yo ya kobongisa makambo liboso,  Moto ya Lokumu Feliksi, na bantango nyonso mpe lisusu na bisika nyonso, tolingi kopesa yo matɔndi mingi.  Kasi mpo nakoba koumisa yo te, nabondeli yo ete, na boboto na yo oyoka biso mwa moke.  Mpo tomoni ete mobali oyo azali likama monene*+ mpe azali kobimisa botomboki+ epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete.+  Amekaki mpe kokómisa tempelo eloko mpamba, yango wana tokangaki ye.+  *——  Ntango yo moko okotuna ye, okoyeba mpenza ete makambo nyonso oyo tozali kofunda ye na yango ezali solo.”  Bayuda mpe bamikɔtisaki na bifundeli wana, bazalaki koloba ete makambo yango ezalaki mpenza solo. 10  Ntango guvɛrnɛrɛ asɛngaki Paulo aloba, ayanolaki: “Lokola nayebi ete ozali mosambisi ya ekólo oyo banda bambula mingi, nandimi na motema moko kosamba makambo na ngai.+ 11  Ndenge okoki koluka koyeba yango yo moko eleki naino mikolo 12 te banda namataki kosambela na Yerusaleme;+ 12  mpe bakutaki ngai te na tempelo nazali kotyana ntembe ná moto to koyanganisa etuluku moko ya bato, ezala na basinagoga to na engumba. 13  Bakoki mpe te komonisa yo soki makambo oyo bazali kofunda ngai sikoyo ezali ya solo. 14  Kasi nandimi mpenza likambo oyo liboso na yo, ete na kotalela nzela oyo bazali kobenga ‘mwa lingomba,’ na ndenge wana nde ngai nazali kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ngai mosala mosantu,+ mpo nandimaka makambo nyonso oyo elobelami na Mibeko mpe ekomami na Basakoli.+ 15  Mpe nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala,+ ya bato ya sembo* mpe ya bato oyo bazangi bosembo.+ 16  Mpo na likambo yango, nazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kobatela lisosoli ya pɛto* liboso ya Nzambe mpe ya bato.+ 17  Sikoyo nsima ya bambula mingi, nayaki kotika makabo ya motema mawa+ na ekólo na ngai mpe kopesa mabonza. 18  Wana nazalaki kosala makambo yango bakutaki ngai na tempelo,+ namipɛtoli na ndenge oyo milulu ezali kosɛnga, kasi nayangisaki ebele ya bato te mpe natyaki yikiyiki te. Bayuda mosusu ya etúká ya Azia bazalaki wana, 19  oyo esengelaki kutu nde bázala awa liboso na yo mpo na kofunda ngai soki mpenza bazwaki ngai na likambo moko ya mabe.+ 20  To mpe, mibali oyo bazali awa báloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai na yango ntango natɛlɛmaki liboso ya Sanedrina, 21  longola kaka mpo na likambo moko oyo nabelelaki ntango natɛlɛmaki na kati na bango: ‘Nazali lelo kosambisama liboso na bino mpo na lisekwa ya bakufi!’”+ 22  Nzokande, Feliksi, lokola ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela,+ abandaki kozongisazongisa bato wana ete báya nsima mpe alobaki: “Ntango Lisiasi komanda ya basoda akokita, nakokata makambo na bino.” 23  Mpe apesaki mokonzi ya basoda mitindo ete bákɛngɛla Paulo kasi bátikela ye mwa bonsomi, mpe apesa nzela ete baninga na ye básalisa ye. 24  Mwa mikolo na nsima, Feliksi ayaki ná mwasi na ye Drusila, oyo azalaki Moyuda. Abengaki Paulo mpe ayokaki ye na likambo etali kondimela Kristo Yesu.+ 25  Kasi ntango Paulo alobelaki bosembo,* komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya,+ Feliksi akómaki kobanga mpe azongisaki: “Sikoyo kende na yo, kasi soki nazwi ntango nakobengisa yo lisusu.” 26  Lokola azalaki kokanisa ete Paulo akopesa ye mbongo, azalaki kobengabenga ye mbala na mbala mpe azalaki kosolola na ye. 27  Kasi, ntango mbula mibale elekaki, Porkiusi Festusi akitanaki Feliksi na ebonga; mpe lokola Feliksi alingaki ete Bayuda básepela na ye,+ atikaki Paulo na bolɔkɔ.

Maloba na nse

To, “moto oyo atyaka mobulu.” Lil., “maladi mabe.”
Talá Ap. A3.
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba. “Boyengebene.”
To, “ezangi mbeba.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.