Lakisá makambo oyo ezali na kati

Zabolo azalaka mpenza?

Zabolo azalaka mpenza?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, Zabolo azali mpenza. Azali “mokonzi ya mokili oyo,” ekelamu ya elimo oyo akómaki mabe mpe atombokelaki Nzambe. (Yoane 14:30; Baefese 6:11, 12) Bankombo oyo Biblia ebengi Zabolo emonisi bizaleli na ye ya mabe; na ndakisa:

Zabolo ezali te mabe oyo ezalaka na motema ya moto

 Bato mosusu bakanisaka ete Satana Zabolo ezali kaka mabe oyo ezalaka na motema na biso. Nzokande, Biblia emonisi ete Nzambe asololaki na Satana. Nzambe akoká na makambo nyonso; na yango akokaki te kosolola na mabe moko boye oyo ezali na kati na ye. (Kolimbola Mibeko 32:4; Yobo 2:1-6) Lisusu, Satana amekaki Yesu, oyo azali moto ya kokoka. (Matai 4:8-10; 1 Yoane 3:5) Na yango, Biblia emonisi ete Zabolo azali mpenza moto, kasi te mabe oyo ezalaka na motema ya bato.

 Tosengeli kokamwa ndenge bato mosusu bandimaka te ete Zabolo azali moto? Tosengeli kokamwa te, mpo Biblia elobi ete Satana akosaka bato mpo na kokokisa mokano na ye. (2 Batesaloniki 2:9, 10) Moko ya mayele mabe oyo asalelaka ezali ya kozipa miso ya bato mpo báyeba te ete azalaka.​—2 Bakorinti 4:4.

Makanisi ya lokuta mpo na Zabolo

 Makanisi ya bato: Lucifer ezali nkombo mosusu ya Zabolo.

 Likambo ya solo: Liloba ya Ebre oyo Babiblia mosusu ebongoli na “Lucifer” elimboli ‘oyo azali kongɛnga.’ (Yisaya 14:12) Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete basaleli liloba yango mpo na kolobela libota ya bakonzi ya Babilone, oyo Nzambe alingaki kosukisa mpo bazalaki na lolendo. (Yisaya 14:4, 13-20) Maloba “yo moto oyo ozali kongɛnga” esalelamaki mpo na kotyola bokonzi ya Babilone ntango ekweaki.

 Makanisi ya bato: Nzambe asalelaka Satana mpo na komeka bato.

 Likambo ya solo: Zabolo azali monguna ya Nzambe; azali mosaleli na ye te. Satana Zabolo atɛmɛlaka Nzambe mpe akoselaka basaleli ya Nzambe makambo.​—1 Petro 5:8; Emoniseli 12:10.