Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bomoi ezali na ntina nini?

Bomoi ezali na ntina nini?

Eyano ya Biblia

 Motuna oyo etali ntina ya bomoi ekoki kotunama na bandenge ebele, na ndakisa, Mpo na nini tozali awa na mabele? to Bomoi na ngai ezali na ntina nini? Biblia emonisi ete mpo bomoi na biso ezala na ntina tosengeli kozala baninga ya Nzambe. Talá mwa mateya minene oyo ezali Biblia.

  •   Nzambe azali Mozalisi na biso. Biblia elobi ete Nzambe “nde asalaki biso, kasi biso moko te.”​—Nzembo 100:3; Emoniseli 4:11.

  •   Eloko nyonso oyo Nzambe asalá, ata mpe biso bato, asalaki yango na ntina.​—Yisaya 45:18.

  •   Nzambe asalá biso na mposa ya koyeba makambo na ye, ata mpe mposa ya koyeba ntina ya bomoi. (Matai 5:3) Mpe alingi ete tókokisa mposa yango.​—Nzembo 145:16.

  •   Mpo tókokisa mposa na biso ya koyeba makambo ya Nzambe, tosengeli kokóma baninga na ye. Bato mosusu bakanisaka ete moto akoki kokóma moninga ya Nzambe te, nzokande Biblia elobi na biso ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8; 2:23.

  •   Mpo tókóma baninga ya Nzambe, bomoi na biso esengeli koyokana na mokano na ye mpo na biso. Biblia elobeli mokano yango na Mosakoli 12:13 na maloba oyo: “Kumisá Nzambe, mpe tosá mibeko na ye, mpamba te ezali mpo na ntina yango nde tokelamaki.”​—Good News Translation.

  •   Na mikolo ezali koya, Nzambe akolongola bampasi mpe akopesa bomoi ya seko na baninga na ye, elingi koloba baoyo bazali kosambela ye. Na ntango wana, tokosepela mpenza na makambo oyo Nzambe akanaki mpo na moto ntango akelaki ye.​—Nzembo 37:10, 11.