Epai ya Baefese 5:1-33

  • Maloba mpe etamboli ya pɛto (1-5)

  • Bótambola lokola bana ya pole (6-14)

  • Bótonda na elimo (15-20)

    • Bósalela ntango na bino malamu mpenza (16)

  • Toli epai ya mibali mpe basi (21-33)

5  Na yango, bókóma bamekoli ya Nzambe+ lokola bana ya bolingo,  mpe bókoba komonisa bolingo,+ ndenge Kristo mpe alingaki biso*+ mpe amikabaki mpo na biso* lokola likabo mpe mbeka, malasi ya nsolo kitoko epai ya Nzambe.+  Pite* mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino,+ ndenge mpenza ebongi na basantu;+  makambo ya nsɔni mpe te, masolo ya bozoba te, masɛki ya nsɔni te+—makambo wana ebongi te—kasi bópesaka nde matɔndi.+  Mpo boyebi likambo oyo, bondimi yango bino moko, ete moto moko te ya pite*+ to moto ya mbindo to moto ya lokoso,+ oyo elakisi kozala mosambeli ya bikeko, akozwa libula na Bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.+  Moto akosa bino te na maloba ya mpambampamba, mpo ezali mpo na makambo yango nde nkanda ya Nzambe ezali koyela bana oyo bazangi botosi.  Na yango, bósala te ndenge bango basalaka;*  mpo bozalaki kala molili, kasi bozali sikoyo pole+ na boyokani na Nkolo.+ Bókoba kotambola lokola bana ya pole,  mpo mbuma oyo misala ya pole ebotaka ezali boboto na makambo nyonso, bosembo* mpe bomoi oyo eyokani na solo.+ 10  Bókoba koluka koyeba malamu eloko oyo ekoki kondimama+ na Nkolo; 11  mpe bótika kosangana na bango na misala oyo ezangi kobota mbuma, oyo ezali ya molili,+ kasi bómonisa polele ndenge oyo bazali. 12  Mpo makambo oyo basalaka na kobombama ezali kutu nsɔni kolobela yango. 13  Nzokande makambo nyonso oyo emonisami polele,* pole emonisaka yango, mpo eloko nyonso oyo ezali komonisama polele ezali pole. 14  Yango wana elobami ete: “Lamuká, Ee molali-mpɔngi, mpe tɛlɛmá uta na bakufi,+ mpe Kristo akopesa yo pole.”+ 15  Na yango, bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, 16  bósalela ntango na bino malamu mpenza,*+ mpo mikolo ezali mabe. 17  Yango wana bótika kokóma bazoba, kasi bókoba kososola soki mokano ya Yehova* ezali nini.+ 18  Lisusu, bólangwaka vinyo te,+ mpo ememaka na kolekisa ndelo,* kasi bókoba kotonda na elimo. 19  Bósololaka bino na bino* na nzembo, na masanzoli mpo na Nzambe mpe na nzembo ya elimo; bóyemba+ elongo na miziki,+ na mitema na bino mpo na Yehova.*+ 20  Na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo,+ bópesaka Nzambe mpe Tata na biso matɔndi+ ntango nyonso mpo na makambo nyonso. 21  Moto na moto amikitisa liboso ya mosusu+ mpo na kobanga oyo bobangaka Kristo. 22  Basi bámikitisa liboso ya mibali na bango+ lokola epai ya Nkolo, 23  mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye+ ndenge Kristo mpe azali mokonzi ya lisangá,+ ye mobikisi ya nzoto yango. 24  Ya solo, ndenge lisangá emikitisaka liboso ya Kristo, ndenge moko mpe basi basengeli komikitisa liboso ya mibali na bango na makambo nyonso. 25  Mibali, bókoba kolinga basi na bino,+ kaka ndenge Kristo alingaki lisangá mpe apesaki bomoi na ye mpo na yango,+ 26  mpo akoka kosantisa yango, kopɛtola yango mpe kosukola yango na mai na nzela ya liloba,+ 27  mpo liboso na ye abimisa lisangá na kitoko na yango, na litɔnɔ te, na lisusa te to na eloko moko te ya ndenge wana,+ kasi ezala nde mosantu mpe ezanga mbeba.+ 28  Ndenge moko mpe mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko, 29  mpo ata moto moko te ayinaka nzoto* na ye moko, kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, kaka ndenge Kristo asalaka mpo na lisangá, 30  mpo tozali biteni ya nzoto na ye.+ 31  “Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama* na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.”+ 32  Sekele mosantu+ oyo ezali monene. Nazali koloba bongo mpo na Kristo mpe lisangá.+ 33  Atako bongo, mokomoko na bino asengeli kolinga mwasi na ye+ ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “bino.”
To mbala mosusu, “bino.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bósangana na bango te.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “epamelami.”
Lil., “bómisombela ntango oyo ebongi.”
Talá Ap. A5.
To, “bomoi ya mbindo ezali na kati na yango.”
To mbala mosusu, “na bino moko.”
Talá Ap. A5.
Lil., “mosuni.”
To, “akotikala.”