Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Bizaleli oyo osengeli komonisa ntango ozali kotinda to kozwa bamesaje

Bizaleli oyo osengeli komonisa ntango ozali kotinda to kozwa bamesaje

MOKAKATANO

Okosala nini soki batindeli yo mesaje na telefone ntango ozali kosolola na moninga moko?

  1. Okotánga mesaje yango ntango ozali kosolola na moninga na yo.

  2. Okosɛnga moninga na yo “bolimbisi” mpe kotánga mesaje yango.

  3. Okokipe mesaje yango te mpe okokoba masolo na bino.

Kopona likambo moko ya kosala kati na oyo touti kotánga ezali na ntina? Eyano ezali ɛɛ!

OYO OSENGELI KOYEBA

Kokomela moninga moko mesaje ntango ozali kosolola na moninga mosusu, ezali lokola kobɛta lisano oyo olingaka mingi kozanga kotosa mibeko ya lisano yango. Okoki koloba boye: ‘Bazali baninga na ngai.’ Yango nde ntina oyo osengeli kozala na limemya. Kasi kolekisa mpe ndelo te. Kobosana likambo oyo te: Soki ozangi limemya epai ya baninga na yo, nsukansuka bakokima yo.

Mpo na nini ezalaka bongo? Mpo bato balingaka bápesa bango limemya. Elenge mwasi moko na nkombo Beth * alobi boye: “Ntango nazali kosolola na moninga oyo azali kokoba kofinafina telefone na ye lokola nde azali kozela likambo moko ya malamu koleka, elɛmbisaka ngai nzoto!” Okanisi ete Beth akondima kozala na moninga ya ndenge wana tii ntango boni?

Talelá ndenge na yo ya kosalela telefone, zongisá lisusu makanisi na lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Mokakatano.” Na makambo misato wana, oyo wapi ezali malamu mpo na yo? Na ntembe te oyo ya A ezangi limemya. Bongo mpo na B mpe C? Mpo na yo, ezali kozanga limemya kokata lisolo kaka mpo na kotánga mesaje na telefone? To omonaka ete soki okipe mesaje yango te kaka mpo na kokoba lisolo ezali kozanga limemya?

Na ntembe te, komonisa limemya ekoki kokóma mpasi. Kasi Biblia ekoki kosalisa. Elobi boye: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31) Ndenge nini okoki kosalela toli yango na likambo ya kotinda to kozwa bamesaje?

OYO OKOKI KOSALA

Tindáká bamesaje kaka na ntango oyo ebongi. Elenge mobali moko na nkombo Richard, alobi boye: “Na bantango mosusu nazwaka bamesaje na butu makasi. Ntango mosusu mesaje moko ya ntina mpenza te mpe ebebisaka mpɔngi na ngai!” Omituna boye: ‘Natindelaka bato bamesaje na ntango oyo basengeli kopema?’​—Toli ya Biblia: Mosakoli 3:1.

Zalá na limemya. Kosolola ezalaka na maloba, na volimi ya mongongo, na elongi mpe nzoto mobimba. Likambo ya mawa, makambo mingi wana ezangaka na bamesaje oyo totindaka. Boye, okoki kosala nini? Elenge mwasi moko na nkombo Jasmine alobi boye: “Saleláká maloba ya limemya oyo bato mingi basalelaka. Tuná ye boye, ‘ozali malamu?’ mpe salelá maloba lokola ‘nabondeli yo’ mpe ‘mersi.’”​—Toli ya Biblia: Bakolose 4:6.

Zalá na bososoli. Zongisá lisusu makanisi na lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Mokakatano.” Soki ozali kozela mesaje moko ya ntina, ekozala malamu osɛnga moto oyo bozali kosolola na ye bolimbisi ete bokokoba masolo na bino nsima. Kasi, mbala mingi ezalaka malamu kotala mesaje yango nsima ya masolo na bino. Amy, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Okozala kaka na telefone na yo ntango bokosilisa masolo na bino. Kasi mbala mosusu ye akozala wana te ntango okosilisa kokoma mesaje.” Okoki mpe kozala na bososoli ya ndenge wana ntango bozali elongo na bato mosusu. Jane, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Kokoma bamesaje ntango nyonso te. Yango ekomonisa ete ozali kokipe bango te; kutu ekomonisa ete osepeli te kozala na bango.”

Kanisá liboso ya kofina butɔ ya kotinda mesaje. Bato bakoyeba mpenza soki olingi koloba nini na mesaje yango? Kotya mwa bililingi oyo emonisaka esengo, mawa to kosɛka na mesaje na yo ekomonisa mpenza ndenge ozali komiyoka? Amber, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Soki ozali kosala lisɛki na likambo moko, tyá elilingi oyo ezali kosɛka. Okoki kosilikisa bato mpe matata ekoki kobima mpo bazwaki likambo ya lisɛki na lisɛki te.”​—Toli ya Biblia: Masese 12:18.

Ya solo, ndenge ya kosalela telefone na yo ezali na ntina mpenza!

Kobosana likambo oyo te: Bolingo nde esalaka ete moto amonisa limemya. Ndenge nini moto amonisaka ezaleli yango? Biblia elobi boye: “Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Na bizaleli oyo emonisaka bolingo, oyo wapi okolinga kokolisa?

^ par. 11 Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.