Epai ya Baebre 13:1-25

  • Malendisi ya nsuka mpe mbote (1-25)

    • “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya” (2)

    • “Libala ekumisama” (4)

    • “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino” (7, 17)

    • Tópesa mbeka ya lisanzoli (15, 16)

13  Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.+  Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,*+ mpo na nzela na yango bamosusu bayambaki baanzelu kozanga koyeba.+  Bókanisaka baoyo bazali na bolɔkɔ,*+ lokola nde bozali na bolɔkɔ elongo na bango,+ mpe baoyo bazali konyokwama, mpo bino moko mpe bozali naino na kati ya nzoto.*  Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te,+ mpo Nzambe akosambisa bato ya pite* mpe bato ya ekobo.+  Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino,+ bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.+ Mpo alobaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”+  Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: “Yehova* azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”+  Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino,+ oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe, mpe awa bozali kotala malamu mpenza mbuma malamu ya etamboli na bango, bómekola kondima na bango.+  Yesu Kristo azali kaka ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela.  Bótika te ete mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya ebungisa bino nzela. Mpo eleki malamu motema elendisama na boboto monene, kasi te na biloko ya kolya,* oyo epesaka litomba te epai ya baoyo bazali komipesa na yango.+ 10  Tozali na etumbelo moko oyo baoyo bazali kosala mosala mosantu na hema bazali na lotomo ya kolya biloko na yango te.+ 11  Mpo bibembe ya banyama oyo nganga-nzambe monene azali komema makila na yango na esika mosantu lokola mbeka mpo na masumu, etumbamaka libándá ya kaa.+ 12  Na yango, Yesu mpe amonaki mpasi na libándá ya porte ya engumba+ mpo asantisa bato na makila na ye.+ 13  Yango wana, tóbima epai na ye na libándá ya kaa, tómema nsɔni oyo ye amemaki,+ 14  mpo tozali na engumba moko te awa oyo ekoumela seko, kasi tozali nde koluka na mposa makasi engumba oyo ezali koya.+ 15  Na nzela na ye, tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso,+ elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso+ oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.+ 16  Lisusu, bóbosana te kosala malamu mpe kokabela basusu biloko,+ mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.+ 17  Bótosaka baoyo bazali kokamba bino+ mpe bómikitisaka liboso na bango,+ mpo bazali kokɛngɛla bino* lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ,+ mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino. 18  Bókoba kobondela mpo na biso, mpo tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo,* mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.+ 19  Kasi nazali kolendisa bino mpenza ete bóbondelaka mpo nazongela bino nokinoki. 20  Sikoyo Nzambe ya kimya, oyo abimisaki uta na bakufi mobateli monene ya bampate,+ Nkolo na biso Yesu, ná makila ya kondimana ya seko, 21  apesa bino eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye, asala na kati na biso na nzela ya Yesu Kristo makambo oyo ezali malamu na miso na ye. Nzambe azwa nkembo libela na libela. Amen. 22  Bandeko, nazali kolendisa bino ete bóyoka na motema molai mpenza liloba oyo ya elendiseli, mpo nakomeli bino mokanda ya mokuse. 23  Bóyeba ete ndeko na biso Timote abimi na bolɔkɔ. Soki ayei noki, nakoya elongo na ye kotala bino. 24  Bópesa mbote na baoyo nyonso bazali kokamba bino mpe na basantu nyonso. Bandeko na Itali+ batindeli bino mbote. 25  Boboto monene ezala na bino nyonso.

Maloba na nse

To, “Bóbosana te komonisela bapaya boboto.”
Lil., “baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ.”
To mbala mosusu, “lokola nde bozali konyokwama elongo na bango.”
Talá Ap. A5.
Elingi koloba, mibeko na oyo etali bilei.
To, “milimo na bino.”
Lil., “lisosoli ya malamu.”