Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ekoki kosalisa yo omiyoka malamu ntango ozali komiyoka ete ozali na ngambo?

Biblia ekoki kosalisa yo omiyoka malamu ntango ozali komiyoka ete ozali na ngambo?

Eyano oyo Biblia epesi

 Ɛɛ. Biblia ekoki kosalisa biso tósala oyo ekoki mpo tótika komiyoka ete tomemi ngambo. (Nzembo 32:1-5) Soki tosali likambo moko ya mabe kasi toyoki mpenza mawa mpo na yango, Nzambe akolimbisa biso mpe akosalisa biso mpo tómona te ete tomemi ngambo. (Nzembo 86:5) Biblia emonisi ete na bantango mosusu komiyoka ete tomemi ngambo ekoki kozala na matomba, mpe ekoki kosalisa biso tóbongisa likambo ya mabe oyo tosali mpo tósala yango lisusu te. (Nzembo 51:17; Masese 14:9) Ekoki kosalema ete tómiyoka ete tomemi ngambo koleka ndelo, to tozangi elikya to valɛrɛ na miso ya Nzambe kasi Biblia ekebisi biso kosala bongo. Komiyoka bongo ekoki kosala ete ‘tózinda na mawa oyo eleki ndelo.’​—2 Bakorinti 2:7.

 Nini ekoki kosala ete moto amiyoka ete azali na ngambo?

 Makambo mingi ekoki kosala ete tómiyoka ete tozali na ngambo. Tokoki komiyoka ete tomemi ngambo ntango tozokisi moto oyo tolingaka to mpe ntango tolongi te kosala likambo oyo tosengelaki kosala. Na bantango mosusu, tokoki komiyoka ete tomemi ngambo kozanga tósala likambo moko ya mabe. Na ndakisa, na bantango mosusu tokoki koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka, kasi soki tolongi te kosala bongo, yango ekoki kosala ete tókóma komiyoka lokola tomemi ngambo. Yango wana, Biblia epesi toli ete tosengeli kozala na bokatikati mpe koyeba esika makoki na biso esuki​—Mosakoli 7:16.

 Nakoki kosala nini mpo na kolonga yango?

 Na esika ete omiyoka ete ozangi elikya to omemi ngambo, salá oyo okoki mpo obongisa makambo. Okosala nini?

  •   Ndimá mabe oyo osali. Bondelá Yehova a alimbisa yo. (Nzembo 38:18; Luka 11:4) Soki obongoli mpenza motema mpe oyoki mpenza mawa mpe lisusu osali makasi ya kozongela te mabe oyo osali, okoki kondima ete Nzambe akoyoka yo. (2 Ntango 33:13; Nzembo 34:18) Amonaka mpenza bomoto na biso ya kati, oyo moto akoki komona te. Ntango Nzambe amonaka ete tozali kosala makasi ya kotika kosala oyo ezali mabe, “ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso.”​—1 Yoane 1:9; Masese 28:13.

     Kasi soki osali moto mosusu likambo moko ya mabe, osengeli kondima yango mpe kosɛnga ye bolimbisi na motema moko. Yango ezalaka pɛtɛɛ te. Osengeli kozala na mpiko mpe na komikitisa. Kasi soki osɛngi bolimbisi na motema moko, ekobimisa matomba na makambo mibale oyo ya ntina: okomiyoka malamu mpe okozongisa kimya ná moto oyo osalaki mabe.​—Matai 3:8; 5:23, 24.

  •   Kanisá na bavɛrsɛ oyo emonisi motema mawa ya Nzambe. Na ndakisa, tótalela oyo 1 Yoane 3:19 elobi. Biblia elobi na vɛrsɛ yango ete “mitema na biso ezali kokweisa biso.” Na yango, tokoki komipesa foti mpenza, to mpe komona ete Nzambe akoki kolinga biso te. Nzokande vɛrsɛ yango elobi mpe ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso.” Na ndenge nini? Ayebi makambo na biso nyonso mpe ayebi malamu mpenza makanisi mpe bolɛmbu na biso. Ayebi mpe ete tobotamá bato ya kozanga kokoka, na yango tobendamaka na kosala oyo ezali mabe. b (Nzembo 51:5) Nzokande abwakaka te baoyo nyonso bayokaka mawa mpenza mpo na mabunga oyo basali.​—Nzembo 32:5.

  •   Komitungisa te mpo na mabe oyo osalá kala. Biblia ezali na masolo ya basi mpe mibali ebele oyo basalaki makambo ya mabe mpe na nsima batikaki makambo yango ya mabe. Na ndakisa, Saulo moto ya Tarse, oyo na nsima ayebanaki na nkombo ya ntoma Paulo. Lokola azalaki Mofarisai, azalaki konyokola bayekoli ya Yesu. (Misala 8:3; 9:1, 2, 11) Kasi na nsima, ntango ayaki koyeba ete azalaki kotɛmɛla nde Nzambe mpe Masiya to Kristo, abongolaki motema mpe abongwanaki mpe na nsima akómaki mokristo moko ya malamu mpenza. Ezali solo ete, Paulo ayokaki mawa mpenza mpo na makambo asalaki, kasi azalaki ntango nyonso komitungisa koleka ndelo te mpo na yango. Lokola ayebaki ete Nzambe amoniselaki ye motema mawa, yango etindaki Paulo akóma mosakoli ya molende mpe abungisaki te elikya ya bomoi ya seko.​—Bafilipi 3:13, 14.

 Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli bolimbisi mpe ndenge oyo moto akoki kotika komiyoka ete azali na ngambo

 Nzembo 51:17: “Motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.”

 Ndimbola: Soki osali libunga moko monene mpe oyoki mawa mpo na yango, Nzambe akosundola yo soki moke te. Akoyokela yo mawa.

 Masese 28:13: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”

 Ndimbola: Soki tondimi lisumu oyo tosali mpe tobongoli mpenza motema, Nzambe akolimbisa biso.

 Yirimia 31:34: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.”

 Ndimbola: Ntango Nzambe alimbisi, akanisaka lisusu mabunga na biso te. Alimbisaka na motema moko.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Kobima 6:3.

b Makanisi ya kosala mabe oyo tobotamá na yango eutá na lisumu oyo mobali ya liboso, Adama asalá mpe atikela biso. Ye ná mwasi na ye, Eva, basalelaki Nzambe lisumu mpe babungisaki bomoi ya kokoka oyo bazalaki na yango mpe oyo bana na bango balingaki kozala na yango.​—Ebandeli 3:17-19; Baroma 5:12.