Epai ya Baefese 4:1-32

  • Bomoko ya nzoto ya Kristo (1-16)

    • “Makabo oyo ezali bato” (8)

  • Bomoto ya kala ná ya sika (17-32)

4  Na yango, ngai moto ya bolɔkɔ+ mpo na Nkolo, nazali kobondela bino ete bótambolaka na ndenge oyo ebongi+ na kobengama oyo bobengamaki,  na komikitisa nyonso+ mpe na boboto, na motema molai,+ bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo,+  bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.+  Nzoto ezali kaka moko,+ mpe elimo kaka moko,+ kaka ndenge elikya ezali kaka moko oyo bobengamaki+ mpo na yango;  Nkolo kaka moko,+ kondima kaka moko, batisimo kaka moko;  Nzambe kaka moko mpe Tata ya bato nyonso, oyo azali likoló ya nyonso mpe azali kosala na nzela ya nyonso mpe na kati ya nyonso.  Nzambe amoniselaki mokomoko na biso boboto monene. Yango emonisamaki na ndenge oyo Kristo akabolelaki biso likabo yango ya ofele.+  Mpo elobami ete: “Ntango amataki na likoló amemaki bakangami; apesaki makabo oyo ezali bato.”+  Nzokande liloba “amataki,” elakisi nini? Elakisi ete akitaki naino na bisika ya nse, elingi koloba, na mabele. 10  Moto yango mpenza oyo akitaki, kaka ye wana nde amataki+ mosika koleka likoló nyonso,+ mpo na nzela na ye makambo nyonso ekokisama. 11  Mpe apesaki bamosusu bázala bantoma,+ bamosusu basakoli,+ bamosusu bapalanganisi ya nsango malamu,+ bamosusu babateli ya mpate mpe bateyi,+ 12  mpo na kobongisama* ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Kristo,+ 13  tii ntango biso nyonso tokokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe, na motindo ya moto oyo akoli mpenza,*+ na bokoli mobimba ya Kristo. 14  Tózala lisusu bana mike te, oyo bazali kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya+ na nzela ya bokosi ya bato, na nzela ya mayele mabe ya bokosi. 15  Kasi wana tozali koloba solo, tókola na bolingo na makambo nyonso na boyokani na moto oyo azali motó, Kristo.+ 16  Uta na ye, nzoto mobimba+ esangani liboke moko na boyokani mpenza mpe ebongisami mpo na kosala elongo na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli. Ntango eteni mokomoko ezali kosala malamu, yango esalisaka mpo na bokoli ya nzoto, wana ezali komitonga yango moko na bolingo.+ 17  Na yango, nazali koloba boye mpe kotatola yango na kati ya Nkolo, ete bosengeli lisusu te kotambola ndenge bikólo batambolaka+ na makanisi na bango ya mpamba.+ 18  Bazali na molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo euti epai ya Nzambe, mpo na kozanga boyebi na bango, mpo na mitema makasi na bango. 19  Lokola babungisá bizaleli nyonso ya malamu, bamipesá na etamboli ya nsɔni na nko*+ mpo na kosala mbindo ya ndenge nyonso na lokoso. 20  Kasi yango te nde boyekolaki mpo na Kristo, 21  soki, ya solo boyokaki ye mpe boteyamaki na boyokani na solo oyo Yesu ateyaki. 22  Boteyamaki ete bosengeli kolongola bomoto ya kala+ oyo eyokani na etamboli na bino ya kala mpe oyo ezali kopɔla na kolanda bamposa na yango ya bokosi.+ 23  Mpe bosengeli kokoba kokómisama sika na makanisi oyo etambwisaka bino,*+ 24  mpe bosengeli kolata bomoto ya sika+ oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe na bosembo ya solo. 25  Yango wana, sikoyo lokola bobwaki lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye,+ mpo tozali biteni ya nzoto oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.+ 26  Bóyoka nkanda, kasi bósala lisumu te;+ moi elala te bino bozali kaka na nkanda,+ 27  bópesa Zabolo libaku te.*+ 28  Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu,+ mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.+ 29  Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+ 30  Lisusu, bóyokisaka elimo santu ya Nzambe mawa* te,+ oyo na nzela na yango botyami elembo+ mpo na mokolo moko ya kosikolama na nzela ya lisiko.+ 31  Bólongola mosika na bino makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi,+ nkanda, nkanda makasi, koganga mpe maloba ya kofinga,+ ezala mpe likambo nyonso ya kozokisa.+ 32  Kasi bózala nde na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa,+ bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.+

Maloba na nse

To, “kosembolama.”
To, “akɔmɛli.”
Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.” Lil., “na elimo ya makanisi na bino.”
To, “bótikela Zabolo esika te.”
To, “mpasi.”